Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 3:12 - Mokanda na Bomoi

12 nakosala nyonso oyo osili kosenga. Nakopesa yo motema ya bwanya mpe ya mayele, na lolenge oyo natikala nanu te kopesa na moto moko liboso na yo ; mpe sima na yo, moto moko te akotikala kozala lokola yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 3:12
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Salela ye kolanda bwanya na yo mpe kotika te ete suki na ye ya pembe ekita na kimia na mboka ya bakufi.


Kasi sik’oyo, kozwa ye te lokola moto oyo asali mabe te. Ozali na bwanya, okoyeba nini osengeli kosala mpo na ye. Kitisa suki na ye ya pembe kati na makila, na mboka ya bakufi. »


Tango Isalaele mobimba bayokaki ndenge mokonzi akataki likambo oyo, babangaki mokonzi mpo ete bamonaki ete azali solo na bwanya ya Nzambe mpo na kokata makambo na bosembo.


Asalaki masese nkoto misato mpe banzembo nkoto moko na mitano.


Nzambe apesaki Salomo bwanya, boyebi mingi, mpe mayele ya kososola makambo mingi, ata ezali ebele lokola zelo ya libongo ya ebale monene.


Yawe atombolaki Salomo makasi liboso ya Isalaele mobimba, mpe apesaki ye lokumu ya bokonzi koleka bakonzi nyonso ya Isalaele oyo balekaki liboso na ye.


Nazali kotindela yo sik’oyo Urami-Abi ; azali penza moto moko ya mayele oyo ayebi mosala malamu.


Ezalaki penza na nzela ya mabala ya boye nde Salomo, mokonzi ya Isalaele, akweyaki na masumu. Nzokande, kati na ebele ya bikolo ya bapaya, ezalaki na mokonzi moko te oyo akokanaki na ye ! Nzambe na ye azalaki kolinga ye mpe atiaki ye mokonzi ya Isalaele mobimba, kasi basi ya bapaya bakweyisaki ye na masumu.


Yawe, oyokaka posa ya banyokolami, olendisaka bango, mpe oyokaka koganga na bango,


Pamba te Yawe nde apesaka bwanya, mpe maloba ya monoko na Ye epesaka mayele mpe bososoli.


Namipesaki mpo na koyekola mpe kososola na nzela ya bwanya, makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi. Nzokande, ezali na yango kaka mosala ya mpunda oyo Nzambe apesa na bana ya bato mpo ete bamonela yango pasi !


Namilobelaki : « Tala, nakolisi mpe nabakisi bwanya mingi koleka moto nyonso oyo azalaki liboso na ngai, na Yelusalemi. » Motema na ngai etondaki penza na bwanya mpe na boyebi ebele.


Liboso ete babelela Ngai, nakoyanola bango ; mpe wana basilisi nanu koloba te, nakoyoka bango.


Nzambe apesaki bilenge wana minei boyebi mpe bososoli kati na makambo nyonso : koloba, kokoma, kotanga mikanda, mayele mpe bwanya. Mpe Daniele akomaki na makoki ya kolimbola bimoniseli mpe bandoto ya ndenge na ndenge.


Na mokolo ya kosambisama, mwasi mokonzi ya sude akotelema elongo na bato ya ekeke oyo mpe akokatela bango etumbu, pamba te awutaki mosika, na suka ya mokili, mpe ayaki mpo na koyoka maloba ya bwanya ya Salomo ; nzokande, ezali awa na Moto oyo aleki Salomo.


Pamba te, Ngai moko, nakopesa bino maloba oyo bosengeli koloba mpe bwanya oyo ekosala ete banguna na bino nyonso bandima nyonso oyo bokoloba.


Jozue, mwana mobali ya Nuni, atondisamaki na Molimo ya bwanya, pamba te Moyize atielaki ye maboko. Bana ya Isalaele bayokelaki ye mpe batosaki mitindo oyo Yawe apesaki na Moyize.


Ezali kati Klisto nde bomengo nyonso ya bwanya mpe ya boyebi ya Nzambe ebombami.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ