Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 3:1 - Mokanda na Bomoi

1 Salomo asalaki boyokani elongo na Faraon, mokonzi ya Ejipito ; abalaki mwana mwasi ya Faraon mpe amemaki ye na engumba ya Davidi, kino tango asilisaki kotonga ndako na ye ya bokonzi, Tempelo ya Yawe mpe bamir, zingazinga ya Yelusalemi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 3:1
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atako bongo, Davidi abotolaki ndako makasi ya Siona, oyo ezali engumba ya Davidi.


Mokonzi Salomo abalaki mwana mwasi ya Faraon ; kasi pembeni na ye, abalaki basi mosusu ebele ya bikolo ya bapaya : basi ya Moabi, ya Amoni, ya Edomi, ya Sidoni mpe ya Iti.


Davidi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi.


Salomo abandaki kotonga Tempelo ya Yawe sima na mibu nkama minei na mwambe, wuta Isalaele abimaki na Ejipito, mobu oyo ekokanaki na mobu ya minei ya bokonzi na ye kati na Isalaele, na sanza ya zivi.


Salomo atongaki lisusu ndako na ye ya bokonzi ; asalaki mibu zomi na misato mpo na kosilisa kotonga yango.


Ndako na ye ya kovanda ezalaki kati na lopango mosusu, na sima ya ndako moke ya kokotela ; mpe batongaki yango ndenge moko kaka na ndako ya kiti ya bokonzi. Salomo abalaki mwana mwasi ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe atongiselaki ye ndako oyo ekokana na ndako ya kiti ya bokonzi.


Sima na Salomo kosilisa kotonga Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe kosala nyonso oyo azalaki na yango posa,


Sima na mibu tuku mibale oyo Salomo asalaki mpo na kotonga Tempelo ya Yawe mpe ndako na ye moko,


Sima na mwana mwasi ya Faraon kolongwa na engumba ya Davidi mpo na kokende na ndako oyo Salomo atongelaki ye, Salomo atongaki Milo.


Davidi avandaki na ndako yango oyo batonga makasi ; yango wana babengaki yango « Engumba ya Davidi. »


Mokonzi Jozafati akomaki na lokumu mingi mpe na bozwi ebele, asalaki boyokani elongo na Akabi na nzela ya libala.


Salomo alongolaki mwana mwasi ya Faraon kati na engumba ya Davidi mpe amemaki ye na ndako oyo atongelaki ye, pamba te alobaki : « Mwasi na ngai asengeli te kovanda kati na ndako ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, mpo ete bisika oyo Sanduku ya Yawe ekoti ezali bule. »


Kasi tala eyano oyo bapesaki biso : ‹ Tozali basali ya Nzambe ya Likolo mpe ya se ; tozali kotonga lisusu Tempelo oyo etongamaki wuta mibu ebele na kala. Mokonzi moko monene ya Isalaele atongaki mpe asilisaki yango.


Boni, tozongela lisusu kobuka mibeko na Yo mpe kobalana na bato oyo basalaka makambo ya nkele ? Boni, kanda makasi na Yo ekopela te kino kosilisa koboma biso mpe kotikela biso moto ata moko te na bomoi ?


Bokoki te komona bato ya Edomi lokola bato ya mbindo, pamba te bazali bandeko na bino. Bokoki te komona bato ya Ejipito lokola bato ya mbindo, pamba te bovandaki kati na mokili na bango lokola bapaya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ