1 Bakonzi 22:8 - Mokanda na Bomoi8 Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati : — Ezali lisusu na moto moko oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe, kasi ngai nalingaka ye te ; pamba te asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai, asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila. Jozafati alobaki : — Tika ete mokonzi aloba bongo te ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli mpe Mosantu ya Isalaele, alobi epai na ye oyo atiolami mpe amonani lokola eloko pamba na miso ya ekolo, na miso ya mowumbu ya bakonzi mabe : « Bakonzi bakomona yo mpe bakotelema, bakambi bakomona yo mpe bakogumbama, likolo na Yawe oyo azali Sembo, Mosantu ya Isalaele, oyo aponaki yo. »
Bazalaki koloba : « Boya ! Tika ete tosalela Jeremi likita mpo na kosala ye mabe, pamba te ezala ndenge nini, Banganga-Nzambe bakosila te mpo na koteya Mobeko, bato ya bwanya bakosila te mpo na kopesa toli, mpe basakoli bakosila te mpo na kosakola Liloba na Yawe. Boya ! Tika ete toboma ye na nzela ya lolemo, mpe tolanda te makambo oyo azali koloba ! »