1 Bakonzi 22:53 - Mokanda na Bomoi53 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ; pamba te alandaki banzela ya tata na ye, ya mama na ye mpe ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo asalaki ete Isalaele asala lisumu. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yawe alobaki lisusu na nzela ya mosakoli Jewu, mwana mobali ya Anani, na tina na Baesha mpe ndako na ye, mpo na makambo mibale oyo : ya liboso, mpo na mabe nyonso oyo asalaki na miso ya Yawe, na kopelisa kanda ya Yawe na nzela ya misala na ye kino kokoma ndenge moko na libota ya Jeroboami ; ya mibale, mpo ete asilisaki koboma bato nyonso ya libota ya Jeroboami.
Asembolaki elilingi moko lokola loboko mpe asimbaki ngai na suki ya moto. Molimo atombolaki ngai na kati-kati ya se mpe likolo mpe amemaki ngai, kati na emoniseli ya Nzambe, kino na Yelusalemi, na ekotelo ya Ekuke ya nor ya lopango ya kati ya Tempelo, epai wapi batelemisaki nzambe ya ekeko oyo etumbolaka zuwa.