Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 22:52 - Mokanda na Bomoi

52 Tango Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na sambo na bokonzi, Akazia, mwana mobali ya Akabi, akomaki mokonzi na Isalaele na Samari. Asalaki mibu mibale na bokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 22:52
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, atambolaki na banzela mabe ya tata na ye, oyo atindikaki mpe bato ya Isalaele na kosala masumu.


Baesha asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, na komekola banzela ya Jeroboami oyo atindikaki bato ya Isalaele na kosala masumu na ye.


Solo, ezalaki na moto moko te oyo amitekaki na kosala mabe na miso ya Yawe lokola Akabi. Ezalaki mwasi na ye Jezabeli nde azalaki kotindika ye kosala mabe.


Akabi akendeki kokutana na bakoko na ye. Mpe Akazia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


kasi akangamaki kaka na lisumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo amemaki Isalaele na kosala masumu ; atikalaki kobongwana na yango te.


Alandaki nzela oyo libota ya Akabi etambolaki na yango mpe asalaki mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki, pamba te abalaki na libota ya Akabi.


Tango kaka Yorami amonaki Jewu, atunaki ye : — Boni Jewu, oyei mpo na kimia ? Jewu azongisaki : — Ndenge nini kimia ekoki kozala na tango losambo ya banzambe ya bikeko mpe kindoki ya mama na yo, Jezabeli, ezali kokoba ?


Ye mpe alandaki banzela oyo libota ya Akabi etambolaki na yango, pamba te mama na ye, na nzela ya batoli na ye, azalaki kotindika ye na kosala mabe.


Mwana mwasi abimaki mpe akendeki kotuna toli epai ya mama na ye : — Mama, nasenga nini ? Mama na ye azongisaki : — Senga moto ya Yoane Mobatisi.


Tala Ngai oyo, natelemi na ekuke mpe nazali kobeta. Soki moto moko ayoki mongongo na Ngai mpe afungoli ekuke, nakokota epai na ye mpe nakolia elongo na ye, mpe ye elongo na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ