49 Jozafati asalisaki bamasuwa ya Tarsisi mpo na kokende koluka wolo na Ofiri ; kasi elongaki te kokende, pamba te bamasuwa ebukanaki na Etsioni-Geberi.
Boye Akazia, mwana mobali ya Akabi, alobaki na Jozafati : « Tika ete basali na ngai bakende nzela moko na basali na yo na bamasuwa ! » Kasi Jozafati aboyaki.