Izaki azongiselaki Ezawu : — Tala, nakomisi ye nkolo na yo mpe napesi ye bandeko na ye nyonso lokola basali ; napesi ye ble mpe vino. Mwana na ngai, nasala lisusu nini mpo na yo ?
Atiaki bayangeli kati na Edomi ; ezali kati na Edomi mobimba nde atiaki bayangeli, mpe bato nyonso ya Edomi bakomaki bawumbu ya Davidi. Yawe apesaki Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.
Mokonzi ya Isalaele abimaki elongo na mokonzi ya Yuda mpe mokonzi ya Edomi. Batambolaki mikolo sambo, kasi mayi ya komela ezalaki lisusu te mpo na mampinga mpe banyama oyo ezalaki kotambola elongo na bango.
Sima na ye kosolola na bato, Jozafati aponaki bayembi, atiaki bango liboso ya mampinga ya basoda, mpo na kokumisa Yawe mpe kotombola nkembo ya bosantu na Ye. Mpe batambolaki liboso ya mampinga ya basoda na koyemba : « Bosanzola Yawe, pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! »
Kasi moto moko ya Nzambe ayaki epai na ye mpe alobaki : — Oh mokonzi, tika ete basoda ya Isalaele bakende te elongo na yo na bitumba, pamba te Yawe azali te elongo na Isalaele mpe elongo na bato ya Efrayimi.
Bilamba na Yo nyonso ezali kolumba solo kitoko ya malasi ya mire, ya aloe mpe ya kaneli ; wuta na bandako minene oyo ebongisama na pembe ya nzoko, mandanda ezali kosepelisa Yo.
Solo, bisanga ekotalela Ngai ; bamasuwa ya Tarsisi ekozala na liboso, ekomema bana na yo ya mibali longwa mosika, elongo na palata mpe wolo, mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe na yo, Mosantu ya Isalaele ; pamba te apesi yo nkembo.
Yona atelemaki. Kasi mpo na kokima mosika na Yawe, akendeki na Tarsisi, akitaki na libongo ya Jafa mpe akutaki kuna masuwa moko oyo ezalaki kokende na Tarsisi. Sima na ye kofuta mbongo mpo na mobembo, akotaki na masuwa yango mpo na kokende na Tarsisi, mosika na Yawe.