47 Ezalaki ye nde moto alongolaki kati na mokili, bato ya suka oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule, oyo batikalaki na tango Asa, tata na ye, azalaki na bokonzi.
Yawe alobaki na ye : « Bikolo mibale ezali kati na libumu na yo, mpe mabota mibale ekabwana ekobima na libumu na yo ; ekolo moko ekoleka ekolo mosusu na makasi, mpe kulutu akosalela leki. »
Okobika na nzela ya mopanga na yo mpe okosalela ndeko na yo ya mobali. Kasi tango okotambola bipai na bipai, okobuka ekangiseli oyo akotia yo na kingo.
Atiaki bayangeli kati na Edomi ; ezali kati na Edomi mobimba nde atiaki bayangeli, mpe bato nyonso ya Edomi bakomaki bawumbu ya Davidi. Yawe apesaki Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.
Mokonzi ya Isalaele abimaki elongo na mokonzi ya Yuda mpe mokonzi ya Edomi. Batambolaki mikolo sambo, kasi mayi ya komela ezalaki lisusu te mpo na mampinga mpe banyama oyo ezalaki kotambola elongo na bango.