45 Jozafati abikaki na kimia elongo na mokonzi ya Isalaele.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Salomo, misala na ye nyonso mpe bwanya na ye, ekomama kati na buku ya misala ya Salomo.
Misala mosusu ya Jeroboami, bitumba mpe bokonzi na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Roboami mpe misala na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
Mokonzi Jozafati akomaki na lokumu mingi mpe na bozwi ebele, asalaki boyokani elongo na Akabi na nzela ya libala.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jozafati, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya Jewu, mwana mobali ya Anani ; mpe masolo yango ezali kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.