Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 22:43 - Mokanda na Bomoi

43 Jozafati alandaki nzela nyonso oyo Asa, tata na ye, atambolaki na yango mpe apengwaki na yango ata moke te ; asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 22:43
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Batongaki lisusu mpo na bango moko bisambelo ya likolo ya bangomba, mabanga ya bule, makonzi ya bule mpo na Ashera na likolo ya bangomba nyonso mpe na se ya banzete nyonso ya mobesu.


Asa asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe, ndenge Davidi, koko na ye, asalaki.


Nzokande, atako abebisaki te bisambelo ya likolo ya bangomba, Asa abatelaki motema na ye sembo na miso ya Yawe, na mikolo nyonso ya bomoi na ye.


Pamba te Davidi asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe mpe abatelaki mibeko ya Yawe mikolo nyonso ya bomoi na ye, longola kaka likambo moko : likambo ya Iri, moto ya Iti.


Jozafati azalaki na mibu tuku misato na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Azuba. » Azuba azalaki mwana mwasi ya Shili.


Na tango wana, bato bazalaki kotumba mbeka na bisambelo ya likolo ya bangomba, pamba te ezalaki nanu na tempelo moko te oyo etongamaki mpo na Kombo na Yawe.


Joasi asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe na mikolo nyonso oyo Nganga-Nzambe Yeoyada azalaki koteya ye.


Tango mosusu bokoloba na ngai : ‘ Totiaka elikya na biso kati na Yawe, Nzambe na biso. ’ Boni ! Ezali ye te oyo Ezekiasi alongolaki bisambelo na ye ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo na ye tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi : ‘ Kati na Yelusalemi, bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo oyo ? ’


Yawe abetaki bato ya Etiopi liboso ya Asa mpe Yuda, mpe bato ya Etiopi bakimaki.


Kasi abebisaki te kati na Isalaele bisambelo ya likolo ya bangomba. Nzokande, Asa abatelaki motema na ye sembo, na mikolo nyonso ya bomoi na ye ;


Sima na Asa koyoka maloba oyo mpe lisakoli ya Azaria, mwana mobali ya mosakoli Odedi, azwaki mpiko, alongolaki banzambe ya bikeko kati na bituka ya Yuda, ya Benjame mpe kati na bingumba oyo abotolaki kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi ; azongisaki etumbelo ya Yawe oyo ezalaki liboso ya ndako moke ya kokotela na Tempelo ya Yawe.


Nakotala eloko moko te ya mabe ; nayinaka misala ya bato oyo bazangi kondima, ekoki kokangama na ngai te.


Kasi tika ete Yawe abengana bato ya kilikili elongo na bato ya misala mabe ! Tika ete kimia ezala na Isalaele !


Atiaka nzembo ya sika kati na monoko na ngai, nzembo ya masanzoli mpo na Nzambe na biso. Bato ebele bakomona, bakobanga mpe bakotiela Yawe motema.


bapesi mokongo noki na makambo oyo natindaki bango mpe bamisaleli ekeko ya mwana ngombe. Bagumbameli yango, babonzeli yango makabo mpe balobi : « Tala nzambe na yo, Oh Isalaele, oyo abimisaki yo na Ejipito. »


Mwana mayele ayokaka mateya ya tata na ye, kasi mwana oyo atiolaka ayokaka pamela te.


Kotengama te, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi, longola makolo na yo na mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ