Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 22:42 - Mokanda na Bomoi

42 Jozafati azalaki na mibu tuku misato na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Azuba. » Azuba azalaki mwana mwasi ya Shili.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 22:42
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Roboami, mwana mobali ya Salomo, akomaki mokonzi ya Yuda ; azalaki na mibu tuku minei na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na sambo na Yelusalemi, engumba oyo Yawe aponaki kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo na kotia Kombo na Ye. Kombo ya mama na Roboami ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni.


Asalaki mibu tuku minei na moko na bokonzi, na Yelusalemi. Kombo ya koko na ye ya mwasi ezalaki « Maaka. » Maaka azalaki mwana mwasi ya Abisalomi.


Awumelaki mibu misato na bokonzi, na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Maaka. » Maaka azalaki mwana ya Abisalomi.


Jozafati, mwana mobali ya Asa, akomaki mokonzi ya Yuda na mobu ya minei ya bokonzi ya Akabi, mokonzi ya Isalaele.


Jozafati alandaki nzela nyonso oyo Asa, tata na ye, atambolaki na yango mpe apengwaki na yango ata moke te ; asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe.


Mokonzi Akazia akufaki kolanda liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Eliya. Lokola mokonzi Akazia azalaki na mwana te, ndeko na ye ya mobali Yorami akitanaki na ye na bokonzi na tango Yorami, mwana mobali ya Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu mibale na bokonzi.


Tango Yorami, mwana mobali ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu mitano na bokonzi —Jozafati azalaki mokonzi ya Yuda— Yorami, mwana mobali ya Jozafati, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.


Jozafati, mwana mobali ya Asa, akonzaki Yuda ; azalaki na mibu tuku misato na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi ya Yuda, mpe akonzaki mibu tuku mibale na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Azuba. » Azuba azalaki mwana mwasi ya Shili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ