Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 22:41 - Mokanda na Bomoi

41 Jozafati, mwana mobali ya Asa, akomaki mokonzi ya Yuda na mobu ya minei ya bokonzi ya Akabi, mokonzi ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 22:41
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Asa akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, tata na ye. Jozafati, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Kasi na mobu ya misato, Jozafati, mokonzi ya Yuda, akendeki kotala mokonzi ya Isalaele.


Akabi akendeki kokutana na bakoko na ye. Mpe Akazia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Jozafati azalaki na mibu tuku misato na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Azuba. » Azuba azalaki mwana mwasi ya Shili.


Salomo azalaki tata ya Roboami, Roboami azalaki tata ya Abiya, Abiya azalaki tata ya Asa, Asa azalaki tata ya Jozafati,


Jozafati, mwana mobali ya Asa, akitanaki na tata na ye na bokonzi mpe alendisaki makasi na ye mpo na kobundisa Isalaele.


Jozafati, mwana mobali ya Asa, akonzaki Yuda ; azalaki na mibu tuku misato na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi ya Yuda, mpe akonzaki mibu tuku mibale na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Azuba. » Azuba azalaki mwana mwasi ya Shili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ