Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 22:40 - Mokanda na Bomoi

40 Akabi akendeki kokutana na bakoko na ye. Mpe Akazia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 22:40
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango mikolo ya bomoi na yo ekosila mpe okokende kokutana na batata na yo, nakotombola moko kati na bakitani na yo, oyo akobima penza na mokongo na yo, mpo ete akitana na yo ; mpe nakolendisa bokonzi na ye.


Wana Adadi azalaki na Ejipito, ayokaki ete Davidi mpe Joabi, mokonzi ya mampinga, bakufi. Boye, Adadi alobaki na Faraon : — Pesa ngai nzela ete nazonga na mokili na ngai.


Sima na yango, Salomo akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, tata na ye. Mwana na ye, Roboami, akitanaki na ye na bokonzi.


Roboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni. Abiyami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Davidi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi.


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Akabi, misala na ye, ndako oyo atongisaki na pembe ya nzoko mpe bingumba nyonso oyo alendisaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.


Jozafati, mwana mobali ya Asa, akomaki mokonzi ya Yuda na mobu ya minei ya bokonzi ya Akabi, mokonzi ya Isalaele.


Jozafati akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, koko na ye. Yorami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Tango Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na sambo na bokonzi, Akazia, mwana mobali ya Akabi, akomaki mokonzi na Isalaele na Samari. Asalaki mibu mibale na bokonzi.


Mokonzi Akazia akufaki kolanda liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Eliya. Lokola mokonzi Akazia azalaki na mwana te, ndeko na ye ya mobali Yorami akitanaki na ye na bokonzi na tango Yorami, mwana mobali ya Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu mibale na bokonzi.


Mokonzi Akazia akweyaki na Samari wuta na lininisa ya shambre na ye ya likolo mpe azokaki pota moko ya makasi. Atindaki bantoma na ye mpe alobaki na bango : — Bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni, mpo na koyeba soki nakobika solo na likama oyo.


Sima na yango, Jozafati, mokonzi ya Yuda, asalaki boyokani elongo na Akazia, mokonzi ya Isalaele, oyo etamboli na ye ezalaki mabe na miso ya Nzambe.


Yawe alobaki na Moyize : « Ozali kokende kopema elongo na bakoko na yo ; mpe, kala mingi te, bato oyo bakopengwa mpo na kosalela banzambe ya bapaya kati na mokili oyo bozali kokota, bakobosana Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ