Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 22:4 - Mokanda na Bomoi

4 Alobaki mpe na Jozafati : — Boni, okoki solo kosepela kokende elongo na ngai mpo na kobundisa Ramoti ya Galadi ? Jozafati azongiselaki mokonzi ya Isalaele : — Ngai mpe yo, bato na ngai mpe bato na yo, tozali se moko, ezala bampunda na ngai mpe bampunda na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 22:4
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, bakendeki kobundisa Ramoti ya Galadi.


Jozafati alobaki lisusu na mokonzi ya Isalaele : — Nabondeli yo, tuna nanu toli ya Yawe.


Beni-Geberi : azalaki kovanda na Ramoti kati na Galadi mpe azalaki moyangeli ya bamboka ya Yairi, mwana mobali ya Manase, kati na Galadi, mpe ya Arigobi kati na Bashani oyo ezalaki na bingumba tuku motoba oyo batonga makasi mpe bikangelo bikuke ya bamir na yango ezalaki ya bibende ya bronze.


Atindaki lisusu sango oyo epai ya Jozafati, mokonzi ya Yuda : — Mokonzi ya Moabi atombokeli ngai. Okoki solo kokende elongo na ngai mpo na kobundisa bato ya Moabi ? Mokonzi Jozafati azongisaki : — Nakokende na yo elongo. Ngai na yo tozali kaka moto moko ; bato na ngai bazali kaka bato na yo, bongo bampunda na ngai ezali mpe bampunda na yo.


Akabi, mokonzi ya Isalaele, atunaki epai ya Jozafati, mokonzi ya Yuda : — Okoki solo kosepela kokende elongo na ngai mpo na kobundisa Ramoti ya Galadi ? Jozafati azongisaki : — Ngai mpe yo, bato na ngai mpe bato na yo, tozali se moko ; tokokende elongo na yo na bitumba.


mosakoli Jewu, mwana mobali ya Anani, akendeki kokutana na ye. Alobaki na mokonzi Jozafati : « Mpo na nini kosunga moto mabe mpe kolinga bato oyo bayinaka Yawe ? Mpo ete osali bongo, kanda makasi ya Yawe ezali likolo na yo.


Moto oyo asanganaka na bato ya bwanya akomaka moto ya bwanya, kasi moto oyo atambolaka nzela moko na bazoba akomona pasi.


Bomikosa te : « Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu ! »


Bosanganaka te na misala ya molili, oyo ebotaka mbuma te, kasi bobimisaka yango na pwasa.


pamba te moto oyo apesi ye mbote asangani na misala na ye ya mabe.


Moto oyo akolonga, oyo akosala mokano na Ngai kino na suka, nakopesa ye bokonzi ya kokonza bikolo :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ