39 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Akabi, misala na ye, ndako oyo atongisaki na pembe ya nzoko mpe bingumba nyonso oyo alendisaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Asa, molende na ye, misala na ye nyonso mpe bingumba na ye nyonso oyo atongaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. Tango akomaki mobange, akomaki kobela makolo.
Bato ya Dedani bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bato ya bisanga ebele bazalaki koya kosomba biloko epai na yo, bazalaki kofuta yo na pembe ya nzoko mpe na banzete ya ebeni.
basalaki bankayi na yo na banzete ya sheni oyo ewutaki na Bashani ; basalaki bivandelo na yo, ekota pembe ya nzoko oyo ewutaki na Asiri, na mabaya ya sipele oyo ewutaki na bisanga ya Kitimi ;
Nakokweyisa ndako ya tango ya malili makasi mpe ya tango ya molunge makasi ; mpe bandako oyo batonga kitoko na pembe ya nzoko ekozala lisusu te, » elobi Yawe.
Bozali kolala na bambeto oyo batia pembe ya nzoko, bozali komivandisa na bakiti ya divan ya kitoko, bozali kolia misuni ya bameme ya kitoko kati na bibwele mpe ya bana ngombe ya mibali ya mafuta kati na etonga.