Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 22:37 - Mokanda na Bomoi

37 Boye mokonzi akufaki, mpe bamemaki ye na Samari ; mpe bakundaki ye kuna.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 22:37
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Asombaki ngomba Samari epai ya Shemeri na motuya ya palata nkoto motoba mpe atongaki engumba likolo na yango. Abengaki engumba yango Samari kolanda kombo ya Shemeri, mokolo na yango ya liboso.


Mosakoli alobaki na mokonzi : — Tala maloba oyo Yawe alobi : « Lokola obikisi moto oyo Ngai nakatelaki etumbu ya kufa, yo nde moto okokufa na esika na ye ; mpe bato na yo bakokufa na esika ya bato na ye. »


Na pokwa, makelele moko ezalaki kotambola kati na mampinga : « Tika ete moto na moto azonga na engumba na ye ; tika ete moto na moto azonga na mabele na ye ! »


Basukolaki shar na ye na liziba moko oyo ezalaki na Samari epai wapi basi ya ndumba bazalaki kosukola ; mpe bambwa elembolaki makila na ye kolanda maloba oyo Yawe alobaki.


abatelaka mikuwa na ye nyonso mpo ete moko te kati na yango ebukana.


Sik’oyo, nakomisi bilembo ya basakoli ya lokuta eloko pamba ; natie mobulu kati na molimo ya bato oyo balobaka makambo ekoya, nakweyisi boyebi ya bato ya bwanya mpe nakomisi mayele na bango liboma.


Bimoniseli na bango ezali ya pamba, mpe masakoli na bango ezali ya lokuta. Balobaka : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi, ’ nzokande Ngai Yawe, natindi bango te. Mpe bazelaka ete maloba na bango ekokisama !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ