Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 22:36 - Mokanda na Bomoi

36 Na pokwa, makelele moko ezalaki kotambola kati na mampinga : « Tika ete moto na moto azonga na engumba na ye ; tika ete moto na moto azonga na mabele na ye ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 22:36
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, bima mpe pesa longonya na basoda na yo. Nalapi ndayi na Kombo na Yawe ete soki obimi te, soda moko te akotikala elongo na yo kino butu eya. Ekozala mpo na yo pasi, koleka makama nyonso oyo ekweyela yo wuta na bolenge na yo kino lelo. »


Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete mokonzi aboyi koyoka bango, bazongiselaki ye : « Eloko nini ya lisanga tozali na yango na Davidi ? Tozali na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi ! Isalaele, tika ete moto na moto azonga na ndako na ye ya kapo ! Mpe yo, mokitani ya Davidi, tikala kotala makambo ya ndako na yo ! » Boye, bana ya Isalaele bazongaki na bandako na bango ya kapo.


‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Bokende te kobundisa bandeko na bino, bato ya Isalaele ! Tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye, pamba te Ngai moko nde nasali makambo nyonso oyo eleki. › » Batosaki Liloba na Yawe mpe bazongaki na bandako na bango mpo na kotosa mitindo ya Yawe.


Mishe azongisaki : — Namoni bato nyonso ya Isalaele bapalangani na bangomba lokola etonga ya bibwele oyo ezangi mobateli. Mpe Yawe alobi : « Bato oyo bazali lisusu na bakambi te ; tika ete moko na moko azonga na ndako na ye na kimia ! »


Nzokande, mokonzi ya Siri apesaki mitindo epai ya bakonzi na ye ya basoda, tuku misato na mibale, oyo batambolisaka bashar : « Bobundisa moto moko te, azala moke to monene ; kasi bobundisa kaka mokonzi ya Isalaele. »


Na mokolo yango, lokola bitumba ezalaki makasi, mokonzi atikalaki ya kotelema kati na shar na ye liboso ya bato ya Siri ; mpe na pokwa, akufaki. Makila oyo ebimaki na pota na ye esopanaki kati na shar.


Boye mokonzi akufaki, mpe bamemaki ye na Samari ; mpe bakundaki ye kuna.


Isalaele alongaki Yuda, mpe bato ya Yuda bakimaki, moto na moto na ndako na ye.


Na tango wana, bana ya Isalaele balongwaki na esika wana mpe bazongaki na bandako na bango, na bituka na bango mpe na mabota ya botata na bango, moto na moto na mabele na ye.


Boye bato ya Filisitia babundisaki bato ya Isalaele mpe balongaki. Moto nyonso akimaki na ndako na ye ya kapo. Kokweyisama ya bato ya Isalaele ezalaki ya makasi penza : motango ya basoda ya Isalaele, oyo babundaka na makolo mpe bakufaki ezalaki nkoto tuku misato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ