3 Mokonzi ya Isalaele alobaki na bakalaka na ye : « Boyebi malamu ete Ramoti ya Galadi ezalaka ya biso ! Nzokande, tosalaka eloko moko te mpo na kobotola yango na maboko ya mokonzi ya Siri. »
Kati na bikolo ya Isalaele, bato bazalaki kotiana tembe mpe koloba : « Mokonzi oyo akangolaki biso na maboko ya banguna na biso, bato ya Filisitia, ye nde sik’oyo akimi mokili likolo ya Abisalomi ;
Beni-Geberi : azalaki kovanda na Ramoti kati na Galadi mpe azalaki moyangeli ya bamboka ya Yairi, mwana mobali ya Manase, kati na Galadi, mpe ya Arigobi kati na Bashani oyo ezalaki na bingumba tuku motoba oyo batonga makasi mpe bikangelo bikuke ya bamir na yango ezalaki ya bibende ya bronze.
Akazia akendeki elongo na Yorami, mwana mobali ya Akabi, mpo na kobundisa Azaeli, mokonzi ya Siri, na Ramoti ya Galadi. Bato ya Arami bazokisaki Yorami.
Jewu, mwana mobali ya Jozafati, koko ya Nimishi, asalelaki Yorami likita. Nzokande Yorami mpe Isalaele mobimba bazalaki kobundela Ramoti ya Galadi liboso ya Azaeli, mokonzi ya Siri.
Tala bingumba yango : Mpo na libota ya Ribeni, engumba Betseri kati na etando ya esobe ; mpo na libota ya Gadi, engumba Ramoti ya Galadi, mpe mpo na libota ya Manase, engumba Golani kati na Bashani.
Na ngambo mosusu ya Yordani, na este ya Jeriko, baponaki Betseri kati na esobe, na likolo ya ngomba ya libota ya Ribeni ; Ramoti kati na Galadi, kati na etuka ya libota ya Gadi ; mpe Golani kati na Bashani, kati na etuka ya libota ya Manase.
Tango bato ya Gaza bayokaki sango ete Samison azali kati na engumba na bango, bazingelaki esika oyo Samison alalaki mpe basenzelaki butu mobimba, mpo na kozela ye na ekuke ya engumba. Na butu yango, baninganaki te mpe balobaki : « Tokoboma ye na tongo tango akobima. »