Tango mokonzi Jeroboami ayokaki bilakeli mabe oyo moto na Nzambe alobaki mpo na etumbelo ya Beteli, asembolaki loboko na ye wuta na etumbelo mpe alobaki : — Bokanga ye ! Kasi loboko oyo Jeroboami asembolaki epai ya moto na Nzambe ekawukaki, mpe akokaki lisusu te kozongisa yango epai na ye.
Mbala moko, mokonzi ya Isalaele apesaki mitindo : — Bokanga Mishe mpe bomema ye epai ya Amoni, moyangeli ya engumba, mpe epai ya Joasi, mwana mobali ya mokonzi.
Ezali na pamba nde, bino mpe, bolamukaka na tongo makasi, bolalaka noki te mpe bosalaka makasi mpo na kozwa bilei ; pamba te Nzambe apesaka bilei yango kaka na balingami na Ye, wana bazali nanu kolala pongi.
Nkolo akopesa bino lipa na tango ya pasi, mpe mayi na tango ya minyoko ; moto oyo akoteya bino akotikala lisusu ya kobombama te, kasi miso na bino moko ekomona ye.
Nganga-Nzambe Pashuri abetisaki Mosakoli Jeremi fimbu mpe akangisaki ye na likonzi oyo ezalaki na ekuke ya likolo ya Benjame, ekuke oyo ememaka na Tempelo ya Yawe.
Soki Yewudi atangi milongo misato to minei ya makomi ya mokanda, mokonzi azalaki kokata yango na mbeli ya mokomi mikanda mpe kobwaka yango na moto, kino tango mokanda nyonso esilaki kozika na moto.
Boye, bakamataki Jeremi mpe babwakaki ye kati na libulu ya Malikiya, mwana mobali ya mokonzi ; libulu yango ezalaki kati na lopango ya bakengeli. Bakitisaki Jeremi kati na libulu na nzela ya basinga ; libulu ezalaki na mayi te, kaka na potopoto ; mpe Jeremi azindaki makasi kati na potopoto yango.
Ezali mosala yango nde nasalaki kati na Yelusalemi : natiaki basantu ebele na boloko, na ndingisa ya bakonzi ya Banganga-Nzambe ; boye, tango bazalaki koboma bango, ngai mpe nazalaki kondima.
Okolia yango te na mapa oyo basangisa na levire. Kasi mikolo sambo, okolia mapa ezanga levire, mapa ya pasi, pamba te obimaki na Ejipito na lombangu. Okosalaka bongo na mikolo nyonso ya bomoi na yo mpo ete okanisaka mokolo oyo obimaki na Ejipito.
Kobanga te pasi oyo osengeli komona. Tala, Satana akobwaka bato mingi kati na bino na boloko mpo na komeka bino mpe bokonyokwama mikolo zomi. Zala kaka sembo kati na kondima na yo kino na kufa, mpe Ngai nakopesa yo bomoi lokola motole ya elonga na yo.