Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 22:24 - Mokanda na Bomoi

24 Bongo Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, apusanaki, apapolaki Mishe mbata na litama mpe alobaki : — Molimo na Yawe abimi kati na ngai na nzela nini mpo ete aya koloba na yo ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 22:24
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande moko kati na bango, Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, asalisaki maseke ya ebende mpe alobaki : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Na maseke oyo okobeta bato ya Siri kino okosilisa koboma bango. › »


Tika ete apesa litama mpo ete babeta ye mbata, mpe tika ete atonda na soni !


Bongo yo, Beteleemi Efrata, atako ozali moke kati na bingumba ya Yuda, ye oyo akokonza Isalaele akowuta kati na yo. Ebandeli na Ye ezala wuta kala penza, wuta na ebandeli ya tango.


mpe balobaki : — Klisto, sakola kati na biso ; yebisa biso moto oyo abeti yo !


Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Botelemelaka te moto mabe ; kutu soki abeti yo mbata na litama ya ngambo ya loboko ya mobali, pesa ye mpe litama ya ngambo ya loboko ya mwasi.


Bato mosusu bakomaki kobwakela Ye soyi, kozipa Ye elongi, kobeta Ye makofi na koloba na Ye : — Sakola ! Mpe bakengeli bazwaki Ye mpe babetaki Ye bambata.


Solo, mokili ezali koyina bino ; kasi boyeba ete eyinaki Ngai liboso na bino.


Bobosana te makambo oyo nayebisaki bino : « Mowumbu aleki nkolo na ye te, na bokonzi. » Lokola banyokolaki Ngai, bino mpe bakonyokola bino ; soki babatelaki mateya na Ngai, bakobatela mpe mateya na bino.


Kasi Ananiasi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, apesaki bato oyo bazalaki pene ya Polo mitindo ete babeta ye na monoko.


Bongo Polo alobaki na ye : — Nzambe akobeta yo, yo mir oyo bapakola langi ya pembe ! Ovandi wana mpo na kosambisa ngai ndenge Mobeko ezali kosenga, nzokande yo nde moto obuki Mobeko mpo ete opesi mitindo ete babeta ngai !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ