Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 22:23 - Mokanda na Bomoi

23 Mpe sik’oyo, tala, Yawe atie molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na yo oyo nyonso ; Yawe azwi penza mokano ya koboma yo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 22:23
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mosakoli alobaki na mokonzi : — Tala maloba oyo Yawe alobi : « Lokola obikisi moto oyo Ngai nakatelaki etumbu ya kufa, yo nde moto okokufa na esika na ye ; mpe bato na yo bakokufa na esika ya bato na ye. »


Okoyebisa ye makambo oyo : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Boni, ozali mobomi te mpe oyibi te ? › Okobakisa lisusu : ‹ Tala makambo oyo Yawe alobi : Kaka na esika oyo bambwa elembolaki makila ya Naboti, kaka na esika yango mpe ekolembola makila na yo. › »


Bongo Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, apusanaki, apapolaki Mishe mbata na litama mpe alobaki : — Molimo na Yawe abimi kati na ngai na nzela nini mpo ete aya koloba na yo ?


Wana azalaki nanu koloba, mokonzi alobaki na ye : — Kata ! Nani atie yo mopesi toli ya mokonzi ? Kanga monoko na yo, soki te bakoboma yo ! Mosakoli abendaki nzoto ; kasi, liboso ya kokende, alobaki : — Lokola osali boye mpe oboyi koyoka toli na ngai, nandimisami ete Nzambe azwi mokano ya koboma yo.


Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi mpe Faraon aboyaki kotika bana ya Isalaele kokende.


Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, lokola ozali kozonga na Ejipito, tala bikamwa nyonso oyo napesi yo nguya ya kosala ; okosala yango liboso ya Faraon. Ngai nakokomisa motema na ye libanga mpo ete akoka kotika te bato na Ngai kokende.


Mawa na moto mabe ! Pasi ezali likolo na ye, pamba te akozwa lifuti kolanda misala na ye.


Makanisi na ye ekangama na putulu, motema na ye ya lokuta ezali kokosa ye ; akokoka te komikangola mpe koloba : « Boni, eloko oyo ezali na loboko na ngai ya mobali ezali lokuta te ? »


Yango wana, yebisa sik’oyo bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Tala, nasili kozwa mokano ya kotindela bino pasi, mpe nazali na mabongisi ya kosala bino mabe. Boye, tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe, abongola bizaleli mpe misala na ye. ›


Soki mosakoli moko akosami mpe asakoli makambo, ezali Ngai moko Yawe nde napengwisi ye. Boye, nakosembola loboko na Ngai mpo na kopesa ye etumbu, mpe nakobeta ye kati na bato na Ngai, Isalaele.


« Ata soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakosala eloko moko te na mokano na ngai moko, ezala ya malamu to ya mabe, mpo ete nakende libanda ya mitindo na Yawe te. Nasala kaka oyo Yawe alobi. »


Kasi Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, aboyaki kopesa biso nzela ya kolekela na mokili na ye, pamba te Yawe, Nzambe na bino, akomisaki moto na ye makasi mpe motema na ye libanga, mpo na kokaba ye na maboko na bino ndenge asali lelo.


Nzambe atindaki molimo mabe kati na Abimeleki mpe bavandi ya Sishemi, mpe bavandi ya Sishemi basalelaki Abimeleki likita.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ