Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 22:17 - Mokanda na Bomoi

17 Mishe azongisaki : — Namoni bato nyonso ya Isalaele bapalangani na bangomba lokola etonga ya bibwele oyo ezangi mobateli. Mpe Yawe alobi : « Bato oyo bazali lisusu na bakambi te ; tika ete moko na moko azonga na ndako na ye na kimia ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 22:17
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi mokonzi alobaki na ye : — Nakolapisa yo ndayi mbala boni mpo ete oloba na ngai kaka bosolo, na Kombo na Yawe ?


Lokola mboloko oyo bazali kolanda, lokola bameme oyo ezanga mobateli, moko na moko akozonga epai ya bato na ye, moko na moko akokima kino na mboka ya bakoko na ye.


Wuta kala, basakoli oyo basakolaki liboso ete yo mpe ngai tozala, basakolaki bitumba, pasi mpe bokono oyo ebomaka, mpo na kotelemela bikolo ebele mpe mikili ya makasi ;


Isalaele azali lokola meme oyo ebungi nzela, oyo nkosi ezalaki kolanda : Mokonzi ya Asiri azalaki moto ya liboso oyo apasolaki Isalaele ; Nabukodonozori, Mokonzi ya Babiloni, azalaki moto ya suka oyo abukaki ye mikuwa.


Bato na Ngai bazalaki lokola bameme oyo ebungi nzela ; babateli na bango babungisaki bango nzela, basalaki ete bayengayenga na bangomba, batambola-tambola na bangomba milayi mpe mikuse mpe babosana lopango na bango ya kopemela.


Tango natalaki, namonaki mopepe moko ya makasi kowuta na ngambo ya nor ; bongo mopepe yango ezalaki komema mapata minene nzela moko na mikalikali ya kongenga makasi, mpe kati na yango ezalaki kongenga lokola ebende kati na moto.


Oh mokonzi ya Asiri, bakambi na yo bazali kolala pongi, basoda na yo ya mpiko balali pongi ya makasi, mampinga na yo bapalangani na bangomba mpe moto akosangisa bango azali komonana te.


Nzokande, banzambe ya bikeko elobaka maloba ya pamba, mpe bimoniseli ya bato ya soloka ezalaka ya lokuta : bazwaka bandoto oyo ezanga tina, mpe malendisi na bango ezalaka ya lokuta. Yango wana, bato bakomaki kotelengana lokola bibwele oyo ezangi mobateli.


Oh mopanga, telema ! Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai ! Tika ete oboma moninga na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Beta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. Bongo nakoboma ata bibwele ya mike.


mpe akomaki koloba maloba oyo : « Tala maloba ya Balami, mwana mobali ya Beori, maloba ya moto oyo miso na ye emonaka polele,


maloba ya moto oyo ayokaka maloba ya Nzambe, oyo amonaka bimoniseli oyo ewutaka epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, oyo miso na ye efungwamaka soki akweyi na molimo :


moto oyo akobanda kobima mpe kokota liboso na bango, oyo akobanda kobimisa mpe kokotisa bango mpo ete bato na Yawe bazala te lokola bibwele oyo ezanga mobateli.


Tango Yesu amonaki ngulupa ebele ya bato, ayokelaki bango mawa, pamba te mitema na bango ebukanaki, mpe balembaki makasi lokola bameme oyo ezangi mobateli.


Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango, pamba te bazalaki lokola bameme oyo ezangi mobateli. Boye, abandaki koteya bango makambo ebele.


Na tango ya kala, kati na Isalaele, moto oyo azalaki kokende kotuna toli ya Nzambe azalaki koloba : « Tokende epai ya moto oyo azwaka bimoniseli. » Pamba te moto oyo bazali kobenga lelo « mosakoli, » bazalaki kobenga ye na kala « moto oyo azwaka bimoniseli. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ