Eliya, moto ya Tishibe, moko kati na bavandi ya Galadi, alobaki na mokonzi Akabi : — Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, Nzambe oyo ngai nasalelaka, mamwe mpe mvula ekozala te na mibu oyo ezali koya, longola kaka soki nasengi yango.
Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, ezali na ekolo moko te to mokili moko te epai wapi nkolo na ngai azangi kotinda bato koluka yo. Mpe soki ekolo moko to mokili elobi ete ozalaki kuna te, Akabi azalaki kolapisa bango ndayi ete bamoni yo te.
Ntoma oyo akendeki kobenga Mishe alobaki na ye : — Tala, basakoli nyonso bazali koloba liloba kaka moko mpo na kosakola elonga mpo na mokonzi. Boye, tika ete maloba na yo ekokana na maloba na bango : sakola elonga mpo na mokonzi !
Tika ete mosakoli oyo aloti ndoto aloba yango, mpe tika ete moto oyo azali na liloba na Ngai aloba liloba na Ngai kolanda solo, ndenge yango ezali. Mpo na nini kosangisa matiti ya kokawuka na ble ? » elobi Yawe ;
Mosakoli Jeremi alobaki na bango : — Nayoki bino ! Nakobondela Yawe, Nzambe na bino, ndenge ezali bosenga na bino ; mpe nakoyebisa bino makambo nyonso oyo Yawe akoloba, nakobombela bino ata likambo moko te.
Kasi Balami azongiselaki bango : — Ezala soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakokoka kosala eloko moko te ya monene to ya moke oyo ekokende libanda ya mibeko ya Yawe, Nzambe na ngai.
« Ata soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakosala eloko moko te na mokano na ngai moko, ezala ya malamu to ya mabe, mpo ete nakende libanda ya mitindo na Yawe te. Nasala kaka oyo Yawe alobi. »
Solo, biso tozali te lokola ebele ya bato oyo bakomisaka Liloba na Nzambe mombongo na bango mpo na kokoma na bomengo. Kati na Klisto, tosakolaka nde Liloba na bosolo nyonso lokola batindami ya Nzambe.
toboyaka nde makambo ya soni oyo esalemaka na nkuku, toboyaka kotambola na lokuta mpe kobebisa bosolo ya Liloba na Nzambe. Nzokande, wuta tokoma koteya bosolo na polele, topesaka na moto nyonso nzela ya kotala soki tozali kotambola malamu to te na miso ya Nzambe.