7 Bongo mwasi na ye, Jezabeli, alobaki na ye : — Boni, ezali yo nde ozali mokonzi ya Isalaele to te ? Lamuka ! Lia mpe sepela ! Nakopesa yo elanga ya vino ya Naboti, moto ya Jizireyeli.
Atunaki Aminoni : — Mpo na nini yo mwana mobali ya mokonzi ozalaka tango nyonso mawa-mawa boye ? Okoki koyebisa ngai te mpo na nini ozalaka bongo ? Aminoni alobaki na ye : — Nalingaka Tamari, ndeko mwasi ya Abisalomi, ndeko na ngai ya mobali.
Akabi azongiselaki ye : — Ezali mpo ete tango nawuti epai ya Naboti ya Jizireyeli mpe nalobi na ye : « Tekela ngai elanga na yo ya vino ; to soki olingi, nakopesa yo mosolo oyo ekokani na motuya na yango. » Kasi ye azongiseli ngai : « Nakoki te kopesa yo elanga na ngai ya vino. »
Boni, bampunda ekimaka penza mbangu na nzela oyo etonda na mabanga ? Ngombe ebalolaka penza mabele na bisika ya ndenge wana ? Kasi bino bokomisi bosembo ngenge, mpe mbuma ya bosembo bololo.
Tango Boazi asilisaki kolia mpe komela, motema na ye ezalaki na esengo ; akendeki kolala na suka ya mipiku ya orje. Bongo Rite apusanaki malembe-malembe, alongolaki elamba oyo ezipaki makolo ya Boazi mpe amilalisaki wana.