Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 21:5 - Mokanda na Bomoi

5 Mwasi na ye, Jezabeli, ayaki epai na ye mpe atunaki ye : — Mpo na nini ozali na mawa mpe oboyi kolia ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 21:5
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwasi amonaki ete mbuma ya nzete ezali elengi mpo na kolia, kitoko mpo na kotala mpe malamu mpo na kofungola mayele. Boye azwaki mbuma mpe aliaki yango. Apesaki yango mpe na mobali na ye, oyo azalaki elongo na ye ; bongo ye mpe mobali aliaki yango.


Atunaki Aminoni : — Mpo na nini yo mwana mobali ya mokonzi ozalaka tango nyonso mawa-mawa boye ? Okoki koyebisa ngai te mpo na nini ozalaka bongo ? Aminoni alobaki na ye : — Nalingaka Tamari, ndeko mwasi ya Abisalomi, ndeko na ngai ya mobali.


Lokola amonaki ete kolanda masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, ekokaki te, abalaki Jezabeli, mwana mwasi ya Etibala, mokonzi ya Sidoni, mpe akomaki kosalela nzambe Bala mpe kogumbamela yango.


Wana Jezabeli azalaki koboma basakoli ya Yawe, Abidiasi azwaki basakoli nkama moko mpe abombaki bango kati na madusu mibale ya mabanga : basakoli tuku mitano na lidusu moko na moko, mpe azalaki kopesa bango bilei mpe mayi.


Boye Jezabeli atindaki ntoma epai ya Eliya mpo na koyebisa ye : — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki lobi, kaka na ngonga oyo, nakomisi bomoi na yo te ndenge okomisaki bomoi ya moko na moko kati na bango.


Solo, ezalaki na moto moko te oyo amitekaki na kosala mabe na miso ya Yawe lokola Akabi. Ezalaki mwasi na ye Jezabeli nde azalaki kotindika ye kosala mabe.


Akabi azongaki epai na ye na mawa mpe na kanda mpo na maloba oyo Naboti, moto ya Jizireyeli, ayebisaki ye : « Nakoki te kopesa yo libula oyo bakoko na ngai batikela ngai. » Alalaki na mbeto na ye, atalisaki elongi na ye na mir mpe aboyaki kolia.


Akabi azongiselaki ye : — Ezali mpo ete tango nawuti epai ya Naboti ya Jizireyeli mpe nalobi na ye : « Tekela ngai elanga na yo ya vino ; to soki olingi, nakopesa yo mosolo oyo ekokani na motuya na yango. » Kasi ye azongiseli ngai : « Nakoki te kopesa yo elanga na ngai ya vino. »


Boye mokonzi atunaki ngai : — Mpo na nini elongi na yo ezali mawa-mawa lokola nde ozali kobela, nzokande ozali kobela te ? Boni, ozali na mawa na motema ? Nabangaki makasi ;


Ester abengisaki Ataki, moko kati na bakalaka ya lokumu, oyo baboma mokongo mpe mokonzi aponaki mpo na kosalela Ester ; atindaki ye mpo na koyeba likambo oyo ezali kotungisa Maridoshe mpe tina nini azali komitungisa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ