Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 21:4 - Mokanda na Bomoi

4 Akabi azongaki epai na ye na mawa mpe na kanda mpo na maloba oyo Naboti, moto ya Jizireyeli, ayebisaki ye : « Nakoki te kopesa yo libula oyo bakoko na ngai batikela ngai. » Alalaki na mbeto na ye, atalisaki elongi na ye na mir mpe aboyaki kolia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 21:4
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Aminoni atungisamaki makasi na motema kino abelaki maladi ya bolingo likolo ya Tamari, ndeko na ye ya mwasi ; pamba te ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe ekokaki kosalema te ete Aminoni abenga ye mpo na kosolola.


Atunaki Aminoni : — Mpo na nini yo mwana mobali ya mokonzi ozalaka tango nyonso mawa-mawa boye ? Okoki koyebisa ngai te mpo na nini ozalaka bongo ? Aminoni alobaki na ye : — Nalingaka Tamari, ndeko mwasi ya Abisalomi, ndeko na ngai ya mobali.


Mokonzi ya Isalaele azongaki epai na ye, na Samari, na mawa mpe na kanda.


Sima na mwa tango, likama moko ekweyelaki Naboti, moto ya Jizireyeli, likolo ya elanga na ye ya vino oyo ezalaki na Jizireyeli, pembeni ya ndako ya Akabi, mokonzi na Samari.


Kasi Naboti azongiselaki Akabi : — Na Kombo na Yawe, nakoki te kopesa yo libula oyo bakoko na ngai batikela ngai.


Mwasi na ye, Jezabeli, ayaki epai na ye mpe atunaki ye : — Mpo na nini ozali na mawa mpe oboyi kolia ?


Kasi makambo oyo nyonso ezali kosepelisa ngai te tango nazali komona Moyuda wana Maridoshe kovanda na ekuke ya mokonzi.


Kotomboka ebomaka moto oyo azangi mayele, zuwa ebomaka zoba.


Biloko oyo moto azali komona na miso ezali malamu koleka biloko oyo azali na yango na makanisi : yango mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.


Yona asepelaki na yango ata moke te, asilikaki makasi.


Kasi Yawe azongiselaki ye : — Boni, okanisi ete ozali kosala malamu ndenge ozali kosilika ?


Tango moyi ebimaki makasi, Nzambe atindaki mopepe ya este oyo epesaki molunge makasi. Moyi ebetaki moto ya Yona makasi. Yona alembaki nzoto, asengaki kokufa ; alobaki : — Eleki malamu ete nakufa na ngai, kasi nazala na bomoi te !


Nzambe alobaki na Yona : — Okanisi ete ozali kosala malamu ndenge ozali kosilika mpo na nzete oyo ? Yona azongisaki : — Ezali se bongo. Nazali kosala malamu ndenge nazali kosilika kino kosenga kufa na ngai.


Kasi moto nyonso atindikamaka na mabe soki abendami mpe akangami na motambo ya baposa mabe ya nzoto na ye moko.


Kasi Saulo aboyaki mpe alobaki : — Nakolia te. Kasi lokola basali na ye elongo na mwasi batiaki molende, Saulo ayokelaki bango. Saulo alamukaki mpe avandaki na mbeto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ