Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 21:29 - Mokanda na Bomoi

29 « Omoni ndenge nini Akabi amikitisi liboso na Ngai ? Lokola amikitisi liboso na ngai, nakoyeisa pasi te wana ye akozala nanu na bomoi ; kasi nakotinda pasi yango na tango mwana na ye ya mobali akozala na bokonzi. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 21:29
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande, mpo na Davidi, tata na yo, nakosala yango te na tango oyo ozali nanu na bomoi ; nakobotola yango nde na maboko ya mwana na yo ya mobali.


Bongo Yawe alobaki lisusu na Eliya, moto ya Tishibe :


Bitumba ezalaki te kati ya Isalaele mpe Siri mibu misato.


Akabi azalaki na bana mibali tuku sambo na Samari. Jewu akomaki mikanda mpe atindaki yango na Samari epai ya bakalaka ya Jizireyeli, epai ya bampaka mpe epai ya babateli ya bana ya Akabi. Na mikanda yango, Jewu alobaki :


Boye Jewu abomaki bato nyonso ya ndako ya Akabi, oyo batikalaki na Jizireyeli : bato na ye nyonso ya lokumu, baninga na ye, Banganga-Nzambe na ye. Atikaki ata moto na ye moko te na bomoi.


Lokola motema na yo etutami, lokola omikitisi liboso ya Yawe sima na yo koyoka makambo oyo nalobaki, mpo na kotelemela esika oyo elongo na bavandi na yango, ete bakobebisama mpe bakolakelama mabe ; lokola opasoli bilamba na yo mpe oleli liboso na Ngai, Ngai mpe nayoki, elobi Yawe.


Boye Jewu abendaki tolotolo mpe abetaki Yorami na kati-kati ya mapeka. Tolotolo etobolaki motema na ye, mpe akweyaki wuta na shar na ye.


Jewu apesaki bango mitindo : — Bobwaka ye na se. Bongo babwakaki Jezabeli na se ; mpe makila na ye epanzanaki na mir mpe na bampunda tango ezalaki konyata ye.


Tango Yawe amonaki ete basili komikitisa, Yawe alobaki lisusu epai ya Shemaya : — Lokola basili komikitisa na kondima mabe na bango, nakobebisa bango te ; kasi kala mingi te, nakokangola bango, mpe kanda na Ngai ekokitela Yelusalemi te na nzela ya Shishaki.


Olongisaka ngai na bitumba ya bato, obatelaka ngai mpo ete nazala mokambi ya bikolo. Bato oyo nayebaki te bakomi kosalela ngai.


Boloba na Nzambe : « Tala ndenge nini misala na Yo ebongi na kobanga yango ! Mpo na nguya monene na Yo, banguna na Yo bakomi koluka kokoma baninga na Yo.


Kasi Yo Nkolo, ozali Nzambe na mawa mpe na ngolu, osilikaka noki te, otonda na bolingo mpe na boyengebene.


Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‹ Kino tango nini okoboya komikitisa liboso na Ngai ? Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.


Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.


Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso, mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso ? » elobi Yawe. « Tala moto oyo Ngai nakotala : moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami, mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.


Boyoka Liloba na Yawe, bino bato oyo bolengaka liboso ya liloba na Ye : « Bandeko na bino oyo bayina bino mpe baboya bino likolo ya Kombo na Ngai balobi : ‹ Tika ete Yawe amonisa nkembo na Ye mpo ete tokoka komona esengo na bino ! › Kasi bango nde bakosambwa solo.


Boni, ozali komona te makambo oyo bazali kosala kati na bingumba ya Yuda mpe kati na babalabala ya Yelusalemi ?


amilobelaki : « Boni ! Oyo ezali te Babiloni monene oyo natongaki lokola ndako ya mokonzi, na makasi na ngai, na nguya na ngai mpe mpo na lokumu ya bokonzi na ngai ? »


Tango Nzambe amonaki makambo oyo basalaki mpe ndenge batikaki banzela na bango ya mabe, abongolaki makanisi na Ye mpe atindelaki bango lisusu te etumbu oyo akanaki kopesa bango.


Nzambe nini akokani na Yo, Yo oyo olimbisaka masumu ya bato mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo ? Okangelaka bato kanda mpo na libela te, kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.


Bongo abalukaki epai ya mwasi, mpe alobaki na Simona : — Omoni mwasi oyo ? Tango nakotaki na ndako na yo, opesaki Ngai mayi te ya kosukola makolo na Ngai ; kasi ye, apolisi yango na mpinzoli na ye mpe apangusi yango na nzela ya suki na ye.


To mpe boni, okanisi ete ozali kotiola bomengo ya boboto, ya kokanga motema mpe ya bolamu na Nzambe, wana ozali kobosana ete boboto na Ye ememaka yo na kobongola motema ?


Bato ebele bakanisaka ete Nkolo azali kowumela mpo na kokokisa elaka na Ye ; nzokande azali nde kokanga motema mpo na bino, pamba te alingi ete moko te abunga, kasi alingi ete bato nyonso babongola mitema.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ