Bongo Davidi alobaki na Joabi mpe na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye : — Bopasola bilamba na bino mpe bolata basaki, bosala matanga liboso ya Abineri. Ye moko mokonzi Davidi atambolaki na sima ya ebembe.
Tango mokonzi ayokaki maloba ya mwasi oyo, apasolaki bilamba na ye. Lokola atambolaki lisusu na likolo ya mir ya lopango, bato bamonaki ete, na se ya bilamba na ye ya bokonzi, alataki saki na nzoto na ye.
Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu ya Yawe atelemi kati ya likolo mpe mabele, bongo na loboko na ye oyo asembolaki likolo ya Yelusalemi, asimbaki mopanga ezanga ebombelo. Davidi mpe bampaka balataki basaki mpe bakweyaki bilongi kino na mabele.
Kasi naloba nini mpo ete ayanola ngai, pamba te Ye moko nde asali yango ! Mibu nyonso ya bomoi na ngai, nakotambola na komikitisa likolo ya pasi ya motema na ngai.
Boye, mokonzi elongo na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki koyoka makambo oyo ekomamaki na mokanda yango bamitungisaki na eloko moko te mpe bapasolaki bilamba na bango te.
Oh bino Banganga-Nzambe, bolata basaki mpe bolela. Bino bato oyo bosalaka na etumbelo, bolela. Bino basali ya Nzambe na ngai, boya, bolata basaki butu mobimba. Pamba te makabo ya bambuma mpe ya masanga ezali kopesama lisusu te na Ndako ya Nzambe na bino.
Tango sango yango ekomaki epai ya mokonzi ya Ninive, atelemaki longwa na kiti na ye ya bokonzi, alongolaki bilamba na ye ya bokonzi, alataki saki mpe amivandisaki na putulu.