24 Moto nyonso ya libota ya Akabi oyo akokufa kati na engumba, bambwa ekolia ye ; mpe oyo nyonso akokufa na zamba, bandeke ya likolo ekotobola-tobola ye. »
Jewu alobaki na Bidikari, soda oyo amemelaka ye bibundeli : « Kamata ye mpe bwaka ye na bilanga ya Naboti, moto ya Jizireyeli. Kanisa ndenge nini ngai na yo tozalaki kokumba bashar elongo, na sima ya tata na ye, Akabi, tango Yawe apesaki lisakoli oyo na tina na ye :
kasi yo obwakami mosika ya kunda na yo lokola kaka eloko moko ya nkele, kati na bibembe ya bato oyo baboma, bato oyo batobola bango na mopanga, bongo bakiti kino na libulu ya mabanga lokola bibembe oyo banyata na makolo.
mpo ete bolia misuni ya bakonzi, ya bakonzi ya mampinga, ya bilombe, ya bampunda elongo na batambolisi na yango mpe ya bato nyonso : bawumbu to bansomi, bato minene to bato pamba. »