Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 21:22 - Mokanda na Bomoi

22 Nakokomisa ndako na yo lokola ndako ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mpe lokola ndako ya Baesha, mwana mobali ya Ayiya ; pamba te opesi Ngai kanda mpe osali ete Isalaele asala masumu. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 21:22
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo likambo oyo ememaki bato na lisumu, pamba te bamoko bazalaki kokende kogumbamela ekeko oyo ezalaki na Beteli, mpe bamosusu bazalaki kokende mosika kino na Dani mpo na kogumbamela ekeko mosusu.


Oyo nde ezalaki lisumu ya ndako ya Jeroboami, oyo ememaki kokweya mpe kobebisama ya bokonzi na ye kati na mokili.


Akokaba Isalaele mpo na masumu oyo Jeroboami asali mpe asalisi Isalaele.


Baesha asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, na komekola banzela ya Jeroboami oyo atindikaki bato ya Isalaele na kosala masumu na ye.


Na tango kaka azwaki bokonzi mpe avandaki na kiti ya bokonzi, asilisaki koboma libota mobimba ya Baesha ; atikaki ata mobali moko te na bomoi, ezala ndeko to molingami na ye.


Atambolaki na banzela nyonso ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo asalaki masumu oyo epelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na nzela ya banzambe na bango ya bikeko oyo ezanga tina.


nakokombola Baesha mpe libota na ye nyonso, mpe nakokomisa ndako na ye lokola ndako ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati.


Boyeba ete liloba moko te oyo Yawe alobaki mpo na kotelemela ndako ya Akabi ekozanga kokokisama. Yawe akokisi makambo oyo alobaki na nzela ya mosali na Ye, Eliya.


Nakosala libota ya Akabi ndenge nasalaki libota ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mpe libota ya Baesha, mwana mobali ya Ayiya.


Pasi etikaka ata moke te ndako ya moto oyo azongisaka mabe mpo na malamu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ