1 Bakonzi 21:19 - Mokanda na Bomoi19 Okoyebisa ye makambo oyo : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Boni, ozali mobomi te mpe oyibi te ? › Okobakisa lisusu : ‹ Tala makambo oyo Yawe alobi : Kaka na esika oyo bambwa elembolaki makila ya Naboti, kaka na esika yango mpe ekolembola makila na yo. › » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nzokande, Elize avandaki kati na ndako na ye, elongo na bakambi ya engumba. Mokonzi atindaki ntoma moko epai ya Elize. Kasi liboso ete akoma, Elize alobaki na bakambi ya engumba : « Bozali komona te ete mobomi oyo atindi moto mpo na koya kokata ngai moto ? Bosala keba ! Tango kaka bokomona ye, bokanga ekuke liboso na ye mpe botindika ye na yango na sima ! Boyoka ! Wana ezali makelele ya makolo ya nkolo na ye te, oyo ezali koyokana sima na ye ? »