1 Bakonzi 21:18 - Mokanda na Bomoi18 « Kende kokutana na Akabi, mokonzi ya Isalaele, oyo azali kokonza wuta na Samari. Na ngonga oyo, azali kati na elanga ya vino ya Naboti epai wapi akendeki mpo na kokamata yango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo, akendeki koluka Akazia, mpe bato na ye bakangaki Akazia kati na Samari epai wapi abombamaki. Bamemaki ye epai ya Jewu mpe babomaki ye. Bakundaki ye, pamba te bamilobelaki : « Azalaki mwana mobali ya Jozafati oyo azalaki koluka Yawe na motema na ye mobimba. » Ezalaki lisusu na moto ya nguya ata moko te kati na libota ya Akazia mpo na kobatela bokonzi.