Sima na mwa tango, likama moko ekweyelaki Naboti, moto ya Jizireyeli, likolo ya elanga na ye ya vino oyo ezalaki na Jizireyeli, pembeni ya ndako ya Akabi, mokonzi na Samari.
Tango Jezabeli ayokaki ete babomi Naboti na mabanga, alobaki na Akabi : « Telema, kende kokamata elanga ya vino ya Naboti, moto ya Jizireyeli, elanga oyo aboyaki kotekela yo, pamba te Naboti azali lisusu na bomoi te, asili kokufa. »
Yorami apesaki mitindo : « Bongisa shar na ngai. » Tango babongisaki shar, Yorami, mokonzi ya Isalaele, mpe Akazia, mokonzi ya Yuda, babimaki, moto na moto likolo ya shar na ye, mpo na kokende kokutana na Jewu. Bakutanaki na ye kati na bilanga ya Naboti, moto ya Jizireyeli.
Moto oyo atambolaka na bosembo mpe alobaka solo, moto oyo abwakaka litomba oyo ezwami na nzela ya moyibi, moto oyo asembolaka maboko na ye te mpo na kozwa kanyaka, moto oyo akangaka matoyi na ye mpo na koboya koyoka masolo ya koboma bato, mpe oyo akangaka miso na ye mpo na koboya komona mabe.