Bato mibale ya kilikili bayaki kovanda liboso na ye mpe bakomaki kokosela ye makambo na miso ya bato nyonso na maloba oyo : « Naboti alakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! » Sima na yango, babimisaki ye na libanda ya engumba mpe babomaki ye na mabanga.
Tango Jezabeli ayokaki ete babomi Naboti na mabanga, alobaki na Akabi : « Telema, kende kokamata elanga ya vino ya Naboti, moto ya Jizireyeli, elanga oyo aboyaki kotekela yo, pamba te Naboti azali lisusu na bomoi te, asili kokufa. »
Ntoma moko akomaki mpe alobaki na Jewu : — Bamemi mito ya bana mibali ya mokonzi. Bongo Jewu apesaki mitindo : — Botia yango na mipiku mibale na ekuke ya engumba kino na tongo.
Ezali lisusu na eloko moko ya pamba oyo elekaka na mokili : bato ya sembo bazwaka lifuti oyo ebongi na bato mabe, mpe bato mabe bazwaka lifuti oyo ebongi na bato ya sembo. Nazali koloba solo ete wana mpe ezali kaka pamba.