12 Babongisaki mokolo ya kokila bilei mpe bavandisaki Naboti na esika ya liboso kati na bato.
Boye, bampaka mpe bankumu oyo bazalaki kovanda engumba moko na Naboti batosaki mitindo oyo Jezabeli apesaki bango na nzela na mikanda.
Kokila bilei na bino ezali kosuka na koswana mpe na bitumba, bozali kobetana makofi na kanda nyonso ; bozali kokila bilei te ndenge esengeli kozala na mokolo oyo bozali kozela ete mongongo na bino eyokana na likolo.