Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 21:10 - Mokanda na Bomoi

10 Bongo botia mpe liboso na ye bato ya kilikili mibale oyo bakokosela ye makambo na maloba oyo : ‹ Olakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! › Na sima, bomema ye na libanda ya engumba mpe boboma ye na mabanga. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 21:10
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto moko ya mobulu na kombo Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya ekolo ya Benjame, abetaki kelelo mpe agangaki : « Tozali na eteni ata moko te ya lisanga na Davidi, tozali ata na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi. Isalaele, tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye ya kapo. »


Boye, bampaka mpe bankumu oyo bazalaki kovanda engumba moko na Naboti batosaki mitindo oyo Jezabeli apesaki bango na nzela na mikanda.


Tala makambo oyo akomaki na mikanda yango : « Bobongisa mokolo moko ya kokila bilei mpe bobengisa bato na mayangani epai wapi bokotia Naboti na esika ya liboso.


Nzokande, Elize avandaki kati na ndako na ye, elongo na bakambi ya engumba. Mokonzi atindaki ntoma moko epai ya Elize. Kasi liboso ete akoma, Elize alobaki na bakambi ya engumba : « Bozali komona te ete mobomi oyo atindi moto mpo na koya kokata ngai moto ? Bosala keba ! Tango kaka bokomona ye, bokanga ekuke liboso na ye mpe botindika ye na yango na sima ! Boyoka ! Wana ezali makelele ya makolo ya nkolo na ye te, oyo ezali koyokana sima na ye ? »


Mpe soki mikolo ya feti esili, Yobo azalaki kobengisa bana na ye mpo na kopetola bango. Na tongo-tongo, azalaki kobonza mbeka ya kotumba mpo na moko na moko kati na bango ; pamba te azalaki komilobela : « Tango mosusu bana na ngai basali masumu mpe balakeli Nzambe mabe kati na mitema na bango. » Yobo azalaki kosala bongo tango nyonso.


Okowumisa te kopesa Ngai mbuma ya liboso oyo ekomela mpe vino oyo okamoli. Okopesa Ngai mwana na yo ya liboso ya mobali.


motatoli mabe oyo alobaka lokuta mpe moto oyo alukaka makelele kati na bandeko.


Boye, bosembo ezongi sima, mpe bosolo etelemi mosika ; pamba te solo ekweyi na balabala, mpe bosembo elongi kokota te.


« Mema na libanda ya molako moto oyo atioli Nzambe. Bato nyonso oyo bayokaki ye, bakotia maboko na bango na moto na ye, mpe bato nyonso ya lingomba bakobamba ye mabanga.


Bayuda bazongiselaki Ye : — Ezali te mpo na likamwisi moko boye ya malamu nde tolingi koboma yo, kasi ezali mpo ete ozali kofinga Nzambe. Lisusu, ezali mpo ete, yo oyo ozali moto, ozali koloba ete ozali Nzambe.


Bongo, bapesaki kanyaka epai ya bato mpo ete baloba : « Toyokaki Etieni koloba maloba ya kofinga Moyize mpe Nzambe. »


Kuna, babimisaki batatoli ya lokuta oyo balobaki : — Moto oyo azali kotika te koloba mabe mpo na kobebisa lokumu ya esika oyo ya bule mpe ya mibeko ;


Soki oyoki bato koloba na tina na moko kati na bingumba oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mpo na kovanda


Litatoli ya moto moko ekoki te mpo na kotalisa ete moto songolo abomaki moto to asalaki mabe. Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato.


Wana bazalaki nanu kolia mpe komela, ndambo ya mibali ya engumba, ya mitema mabe, bazingelaki ndako ; babetaki na ekuke mpe balobaki na mobange oyo azalaki nkolo ndako : — Bimisa mosali oyo ayei na ndako na yo ; tolingi kosangisa na ye nzoto ndenge basangisaka nzoto na basi.


Bana mibali ya Eli bazalaki kilikili, bayebaki Yawe te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ