Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 21:1 - Mokanda na Bomoi

1 Sima na mwa tango, likama moko ekweyelaki Naboti, moto ya Jizireyeli, likolo ya elanga na ye ya vino oyo ezalaki na Jizireyeli, pembeni ya ndako ya Akabi, mokonzi na Samari.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 21:1
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yorami apesaki mitindo : « Bongisa shar na ngai. » Tango babongisaki shar, Yorami, mokonzi ya Isalaele, mpe Akazia, mokonzi ya Yuda, babimaki, moto na moto likolo ya shar na ye, mpo na kokende kokutana na Jewu. Bakutanaki na ye kati na bilanga ya Naboti, moto ya Jizireyeli.


Jewu alobaki na Bidikari, soda oyo amemelaka ye bibundeli : « Kamata ye mpe bwaka ye na bilanga ya Naboti, moto ya Jizireyeli. Kanisa ndenge nini ngai na yo tozalaki kokumba bashar elongo, na sima ya tata na ye, Akabi, tango Yawe apesaki lisakoli oyo na tina na ye :


Wana azalaki kati na pasi, mokonzi Akazi akobaki lisusu kosala makambo ya nkele na miso ya Yawe :


Yango wana, kaka na mokolo moko, Yawe akokata, kati na Isalaele, moto mpe mokila, lindalala mpe nzete oyo ebotaka na mayi.


Oh Yawe ; boni, miso na Yo esepelaka te komona bosolo ? Obetaka solo bato, kasi bayokaka na bango pasi te ; osilisaka koboma bango, kasi baboyaka kaka kobongwana. Bakomisa mito na bango makasi lokola mabanga mpe baboyaka kobongola mitema na bango.


Soki baluli bilanga ya moto, bazwaka yango na makasi ; soki baluli ndako ya moto, babotolaka yango ; bakangaka mokolo ndako mpe biloko na ye ya ndako mpe babotolaka moto libula na ye.


Kati na eteni ya mabele na bango, ezalaki na : Jizireyeli, Kesuloti, Sunemi,


Na tango wana, bato ya Madiani, ya Amaleki mpe bato ya ngambo ya este basanganaki elongo, bakatisaki ngambo ya Yordani mpe batongaki molako na bango na lubwaku ya Jizireyeli.


Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda na Afeki, mpe Isalaele atongaki molako pene ya etima ya mayi oyo ezali na Jizireyeli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ