Mokonzi ya Isalaele abengisaki bampaka nyonso ya mboka mpe alobaki na bango : — Botala ndenge nini moto oyo azali koluka makambo ! Tango asengaki ngai basi na ngai mpe bana na ngai ya mibali, wolo mpe palata na ngai, napimelaki ye yango te.
Boye Akabi azongisaki epai ya bantoma ya Beni-Adadi : — Boloba na mokonzi, nkolo na ngai : « Mosali na yo akosala nyonso oyo osengaki liboso ; kasi na oyo ya mibale, nakosala yango te. » Bazongaki mpe bamemaki eyano epai ya Beni-Adadi.