Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 20:7 - Mokanda na Bomoi

7 Mokonzi ya Isalaele abengisaki bampaka nyonso ya mboka mpe alobaki na bango : — Botala ndenge nini moto oyo azali koluka makambo ! Tango asengaki ngai basi na ngai mpe bana na ngai ya mibali, wolo mpe palata na ngai, napimelaki ye yango te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 20:7
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi yeba malamu ete lobi, na ngonga oyo, nakotinda basali na ngai mpo na kotala malamu-malamu ndako na yo mpe bandako ya basali na yo. Bakozwa nyonso ya motuya na miso na yo mpe bakomema yango. »


Bampaka mpe bato nyonso balobaki na ye : — Koyokela ye te mpe kondima bisengeli na ye te.


Boye, Jezabeli akomaki mikanda na kombo ya Akabi, atiaki yango kashe ya mokonzi mpe atindaki yango epai ya bampaka mpe bankumu oyo bazalaki kovanda engumba moko na Naboti.


Salomo abengisaki, na Yelusalemi, bakambi nyonso ya mabota ya Isalaele, bakambi nyonso ya bituka mpe ya mabota ya bato ya Isalaele mpo na komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe wuta na Siona, engumba ya Davidi.


Tango kaka mokonzi ya Isalaele atangaki mokanda, apasolaki bilamba na ye mpe alobaki : « Boni, ngai nazali Nzambe ? Boni, nazali na makoki ya koboma to ya kozongisa na bomoi ? Mpo na nini moto oyo atindeli ngai moto ete nabikisa ye na bokono na ye ya maba ? Botala ndenge nini azali kolukela ngai makambo ! »


Davidi asangisaki bakonzi ya basoda, bakonzi ya bankoto mpe bakonzi ya bankama elongo na bato mosusu ya lokumu.


Davidi abengisaki bakambi nyonso ya Isalaele, na Yelusalemi : bakonzi ya mabota, bakonzi ya masanga ya basoda oyo bazalaki kosalela mokonzi, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama ya basoda, babateli bozwi mpe bibwele ya mokonzi, bato oyo balandelaka bana na ye ya mibali elongo na basali ya ndako ya mokonzi, basoda ya mpiko mpe bato nyonso ya lokumu.


Pamba te moto nyonso oyo azalaka na makanisi mabe kati na ye abotaka kaka pasi ; mabe oyo ekolaka kati na ye ememelaka ye moko libebi. »


Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya misala mabe ! Kokutanisa ngai te na bato na kanza.


Minoko na bango ebimisaka maloba mabe mpe lokuta, baboyaka kosala na bokebi mpe kosala bolamu.


Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ; azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.


Abongisaka bibundeli oyo ebomaka mpe asalaka ete makonga na Ye ekoma kozikisa.


Mpo na kozanga koyeba kokamba, ekolo ekokweya ; kasi lobiko ezali kati na motango ebele ya bapesi toli.


Moto oyo alukaka kosala bolamu akozwa ngolu, kasi pasi ekomelaka moto oyo alukaka kosala mabe.


pamba te mitema na bango ekanisaka kaka kosala mabe, mpe bibebu na bango eyeisaka kaka mobulu soki elobi.


azalaka na makanisi mabe kati na motema na ye, asalaka tango nyonso mabongisi ya mabe mpe alukaka kaka tango nyonso makelele.


Bakonzi oyo mibale, na mitema na bango ya mabe, bakovanda esika moko. Lokola batonda na mayele mabe, bakolobana lokuta kasi ekosimba te, pamba te suka ya makambo ekoya kaka na tango oyo ekatama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ