6 Kasi yeba malamu ete lobi, na ngonga oyo, nakotinda basali na ngai mpo na kotala malamu-malamu ndako na yo mpe bandako ya basali na yo. Bakozwa nyonso ya motuya na miso na yo mpe bakomema yango. »
Bongo Rebeka azwaki na ndako, bilamba oyo elekaki kitoko kati na bilamba ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, mpe alatisaki yango Jakobi, mwana na ye ya suka.
Davidi azongiselaki Gadi : — Nazali na pasi makasi na motema. Eleki malamu mpo na ngai kokweya na maboko ya Yawe, pamba te mawa na Ye ezali solo monene ; kasi tika ete nakweya te na maboko ya bato.
Bantoma bazongaki lisusu mpe balobaki : — Tala maloba oyo Beni-Adadi alobi : « Napesaki yo mitindo ete opesa ngai palata na yo, wolo na yo, basi na yo mpe bana na yo ya mibali.
Mokonzi ya Isalaele abengisaki bampaka nyonso ya mboka mpe alobaki na bango : — Botala ndenge nini moto oyo azali koluka makambo ! Tango asengaki ngai basi na ngai mpe bana na ngai ya mibali, wolo mpe palata na ngai, napimelaki ye yango te.
bakopo ya wolo tuku mibale oyo ezali na motuya ya mbongo ya bibende ya wolo nkoto moko mpe biloko mibale ya kitoko basala na bronze oyo engalaka lokola wolo.
Basali bikeko, bango nyonso, bazali pamba, mpe biloko oyo bango balingaka ezali ata na litomba te ; esengelaki kotatola mpo na bango, kasi emonaka te mpe eyebaka ata eloko moko te ; boye, bayokisama soni.
Bino babateli bibwele, bolela mpe boganga ! Bino bakambi ya bitonga, bobaluka-baluka na putulu ! Pamba te tango na bino ya kokufa ekoki ! Bokokweya mpe bokopanzana mike-mike lokola mbeki.
Monguna asemboli loboko na ye likolo ya bomengo nyonso ya Yelusalemi, bongo azali komona bikolo ya bapaya kokota na esika na ye ya bule, bikolo oyo Yo opekisaki kokota kati na lisanga na Yo.
Na mikolo na ye ya pasi mpe ya koyengayenga, tango bato na ye bazali kokweya na maboko ya banguna mpe moto akosunga ye azali te, Yelusalemi azali kokanisa bomengo na ye nyonso ya kala ; bayini na ye batali ye na pamba mpe basepeli na kobebisama na ye.
Ata Efrayimi azali kofuluka kati na bandeko na ye ya mibali, mopepe ya este ekoya, mopepe ya Yawe ekoya wuta na esobe : ekokawusa etima ya Efrayimi, ekokawusa liziba na ye. Monguna akobotola ye biloko nyonso ya talo wuta na ebombelo na yango. »