1 Bakonzi 20:42 - Mokanda na Bomoi42 Mosakoli alobaki na mokonzi : — Tala maloba oyo Yawe alobi : « Lokola obikisi moto oyo Ngai nakatelaki etumbu ya kufa, yo nde moto okokufa na esika na ye ; mpe bato na yo bakokufa na esika ya bato na ye. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Beni-Adadi alobaki : — Bingumba nyonso oyo tata na ngai abotolaki tata na yo, nazongiseli yo yango ; okotonga zando na yo na Damasi mpo na koteka biloko na yo ndenge kaka tata na ngai asalaki na Samari. Akabi azongisaki : — Nakotika yo kokende soki nasali boyokani elongo na yo. Akabi asalaki boyokani elongo na Beni-Adadi mpe atikaki ye kozonga epai na ye.
Azaeli atunaki : — Mpo na nini nkolo na ngai azali kolela ? Elize azongisaki : — Mpo ete nayebi mabe oyo okosala bana ya Isalaele. Okozikisa bingumba na bango, oyo etongama makasi, okokata bilenge mibali na bango bakingo na mopanga, okoboma bana na bango ya mike, mpe okopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.