Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 20:39 - Mokanda na Bomoi

39 Tango mokonzi azalaki koleka, mosakoli agangaki : — Mokonzi, wana nazalaki kati na bitumba, moto moko abimaki kati na mampinga mpe amemelaki ngai mokangami ya bitumba. Alobaki na ngai : « Batela moto oyo ete akima te ! Soki akimi, okokufa na esika na ye to okofuta ngai palata nkoto misato. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 20:39
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana mosali na yo azalaki kosala awa, kuna, mokangami yango akimaki. Bongo Akabi, mokonzi ya Isalaele, alobaki : — Etumbu na yo ekozala ndenge kaka olobi.


Mosakoli alobaki na mokonzi : — Tala maloba oyo Yawe alobi : « Lokola obikisi moto oyo Ngai nakatelaki etumbu ya kufa, yo nde moto okokufa na esika na ye ; mpe bato na yo bakokufa na esika ya bato na ye. »


Bakotaki mpo na kobongisa bambeka mpe batumbaki yango. Nzokande, Jewu atiaki bato tuku mwambe libanda na likebisi oyo : « Soki moto moko kati na bino akimisi moko kati na bato oyo napesi na maboko na bino, akofuta bomoi na ye na motuya ya bomoi ya moto oyo akimi. »


Tika ete elakeli mabe oyo etelemeli yo etinda yo te na kotomboka ! Boni, okoki kopesa kanyaka na bato ebele ? Kasi kopengwa te !


ba-oyo batielaka bomengo na bango motema mpe bamikumisaka mpo na bofuluki ya bozwi na bango ?


Kasi soki basengi ye lomande mpo na kosikola bomoi na ye, akofuta nyonso oyo bakosenga ye.


Bomengo ya mozwi ebatelaka bomoi na ye, kasi bato mabe batungisaka mobola te.


akotikala kondima ata lifuti moko te mpo ete akoka kolimbisa, mpe akoboya yango ata soki babakisi bakado.


Tika ete moto oyo asalelaka Yawe na kozanga komipesa alakelama mabe ! Tika ete moto oyo apelisaka mopanga na ye mpo ete etangisa makila alakelama mabe !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ