38 Mwana ya basakoli amibongolaki na elateli na ye, azipaki elongi na ye na nzela ya eteni ya elamba mpo ete bayeba ye te, mpe akendeki kotelema na nzela oyo mokonzi Akabi akolekela.
Boye, Joabi atindaki moto moko na mboka Tekoa, mpo na koluka mwasi moko ya bwanya mpe komema ye longwa kuna. Alobaki na ye : « Sala lokola moto oyo azali na matanga, lata bilamba ya matanga, kopakola mafuta te : sala lokola mwasi oyo alata pili wuta mikolo ebele mpo na kolela ebembe ;
Jeroboami alobaki na mwasi na ye : — Mibongola mpo ete bato bayeba te ete ozali mwasi ya mokonzi Jeroboami ; bongo, kende na Silo. Mosakoli Ayiya azali kuna ; ye nde alobaki na ngai ete nakozala mokonzi ya bato oyo.
Mbala moko, mosakoli alongolaki eteni ya elamba oyo ezipaki elongi na ye ; mpe Akabi, mokonzi ya Isalaele, asosolaki ete moto yango azali moko kati na bana ya basakoli.
Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati : « Nakomibongola wana nakokende na bitumba ; kasi yo, lata bilamba na yo ya bokonzi. » Boye mokonzi ya Isalaele amibongolaki mpe akendeki na bitumba.
Tango bozali kokila bilei, bozalaka mawa-mawa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka ; pamba te bakomisaka bilongi na bango mawa-mawa mpo na kolakisa na bato ete bazali kokila bilei. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.