36 Bongo alobaki na ye : — Lokola oboyi kotosa Liloba na Yawe, tango kaka okotika ngai, nkosi ekoboma yo. Moninga na ye akendeki, akutanaki na nkosi, mpe ebomaki ye.
Tango mosakoli ya mobange, oyo azongisaki moto na Nzambe sima, na mobembo na ye, ayokaki sango yango, alobaki : — Ezali solo moto na Nzambe oyo atosaki te mitindo ya Yawe. Yawe akabi ye epai ya nkosi oyo epasoli ye mpe ebomi ye kolandisama na liloba oyo Yawe ayebisaki ye.