Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 20:33 - Mokanda na Bomoi

33 Bantoma ya Beni-Adadi bazwaki eyano yango lokola elembo ya malamu, bakangamaki na maloba wana mpe bagangaki na esengo : — Beni-Adadi azali solo ndeko na yo. Akabi azongisaki : — Bokende kozwa ye. Beni-Adadi abimaki na esika oyo abombamaki mpe ayaki epai ya Akabi, bongo Akabi amatisaki ye na shar na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 20:33
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Asa azwaki palata mpe wolo nyonso oyo etikalaki kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi ; apesaki yango na maboko ya basali na ye mpe atindaki bango epai ya Beni-Adadi, mwana mobali ya Tabirimoni, mwana mobali ya Ezioni, mokonzi ya Siri, oyo azalaki kovanda na Damasi. Atindelaki ye mpe maloba oyo :


Boye balataki bango nyonso bilamba ya saki, bakangaki basinga na mito na bango mpe bakendeki epai ya mokonzi ya Isalaele. Balobaki na ye : — Mosali na yo Beni-Adadi abondeli yo ete oboma ye te. Akabi atunaki : — Boni, azali nanu na bomoi ? Azali kaka ndeko na ngai.


Beni-Adadi alobaki : — Bingumba nyonso oyo tata na ngai abotolaki tata na yo, nazongiseli yo yango ; okotonga zando na yo na Damasi mpo na koteka biloko na yo ndenge kaka tata na ngai asalaki na Samari. Akabi azongisaki : — Nakotika yo kokende soki nasali boyokani elongo na yo. Akabi asalaki boyokani elongo na Beni-Adadi mpe atikaki ye kozonga epai na ye.


Tango alongwaki kuna mpe akutanaki na Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, oyo abandaki koya kokutana na ye, Jewu apesaki ye mbote mpe alobaki : — Boni, motema na yo ezali sembo mpo na ngai, ndenge motema na ngai ezali mpo na yo ? Yonadabi azongisaki : — Iyo, ezali bongo ! Jewu alobaki : — Soki ezali bongo, pesa ngai loboko na yo. Boye, Yonadabi asalaki bongo, mpe Jewu asungaki ye mpo na komata na shar.


Motindami ya sembo azalaka lokola mopepe ya malili ya mvula ya pembe na tango ya kobuka bambuma, asalaka esengo ya mokonzi na ye.


Mokonzi akumisaki mobateli mabe wana ya bomengo mpo na mayele oyo asalaki na yango. Pamba te bato ya mokili oyo, bazali na mayele koleka bana ya pole.


Azongisaki : — Nakososola ndenge nini soki moto alimboleli ngai yango te ? Boye abengaki Filipo ete amata na shar mpe avanda pembeni na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ