1 Bakonzi 20:32 - Mokanda na Bomoi32 Boye balataki bango nyonso bilamba ya saki, bakangaki basinga na mito na bango mpe bakendeki epai ya mokonzi ya Isalaele. Balobaki na ye : — Mosali na yo Beni-Adadi abondeli yo ete oboma ye te. Akabi atunaki : — Boni, azali nanu na bomoi ? Azali kaka ndeko na ngai. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bantoma ya Beni-Adadi bazwaki eyano yango lokola elembo ya malamu, bakangamaki na maloba wana mpe bagangaki na esengo : — Beni-Adadi azali solo ndeko na yo. Akabi azongisaki : — Bokende kozwa ye. Beni-Adadi abimaki na esika oyo abombamaki mpe ayaki epai ya Akabi, bongo Akabi amatisaki ye na shar na ye.