Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 20:30 - Mokanda na Bomoi

30 Basoda ya mpiko ya Siri oyo batikalaki, bakimaki na Afeki epai wapi mir ekweyelaki bato nkoto tuku mibale na sambo. Beni-Adadi akimaki na engumba mpe abombamaki na shambre ya kati penza.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 20:30
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bitumba epanzanaki mboka mobimba ; mpe mokolo wana, bato oyo bakufaki kati na zamba bazalaki ebele koleka bato oyo bakufaki na mopanga.


Beni-Adadi atindaki maloba mosusu epai ya Akabi : — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki etikali na Samari putulu oyo ekoki kotondisa ata loboko ya moko na moko ya bato oyo bazali kolanda ngai.


Soda moko na moko abomaki monguna na ye. Boye bato ya Siri bakimaki, mpe bato ya Isalaele balandaki bango. Kasi Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, akimaki na mpunda elongo na ndambo ya basoda na ye, oyo batambolaka na bashar.


Na mobu oyo elandaki, Beni-Adadi asangisaki mampinga na ye ya Siri mpe amataki na Afeki mpo na kobundisa Isalaele.


Mikolo sambo, milako ya mampinga nyonso mibale ezalaki etalana. Na mokolo ya sambo, etumba ebandaki mpe bato ya Isalaele babomaki basoda ya mpiko ya Siri nkoto nkama moko.


Mishe azongisaki : — Okososola yango kaka na mokolo oyo okokima mpe okotambola na shambre moko na moko mpo na koluka kobombama.


Bakotaki mpo na kobongisa bambeka mpe batumbaki yango. Nzokande, Jewu atiaki bato tuku mwambe libanda na likebisi oyo : « Soki moto moko kati na bino akimisi moko kati na bato oyo napesi na maboko na bino, akofuta bomoi na ye na motuya ya bomoi ya moto oyo akimi. »


Tango okokoma kuna, luka Jewu, mwana mobali ya Jozafati mpe koko ya Nimishi. Kende epai na ye, benda ye pembeni, mosika ya baninga na ye, mpe mema ye na shambre ya kati.


Mishe azongisaki : — Okososola yango kaka na mokolo oyo okokima mpe okotambola na shambre moko na moko mpo na koluka kobombama.


Yawe afuti ngai kolanda bosembo na ngai, kolanda bopeto ya maboko na ngai na miso na Ye.


Moto nyonso oyo akokima na lokito ya somo akokweya na libulu, mpe oyo akoluka kobima kati na libulu akokangama na motambo. Maninisa ya likolo esili kofungwama, makonzi ya mokili ezali koningana.


lisumu oyo ekokoma mpo na bino lokola mir ya molayi oyo esala nzela mpe lidusu, bongo ebukani mpe ekweyi mbala moko na mbalakata.


« Moto nyonso oyo akokima somo akokweya na libulu, mpe moto nyonso oyo akobima na libulu akokangama na motambo, pamba te nakoyeisa mobu ya etumbu na mokili ya Moabi, » elobi Yawe.


Ekozala lokola moto oyo azali kokima nkosi, bongo akutani na ngombolo ; lokola moto oyo akoti na ndako na ye mpe atie loboko na ye na mir, bongo nyoka eswi ye.


Soki babombami na songe ya ngomba Karimeli, nakokanga bango mpe nakokitisa bango na se ; soki babombami Ngai na se ya ebale monene, nakopesa mitindo na nyoka ete eswa bango kuna.


Bongo bato wana zomi na mwambe oyo bakufaki tango ndako molayi ya Siloe ekweyelaki bango, bokanisi ete bazalaki bato ya masumu koleka bavandi nyonso ya Yelusalemi ?


mpe wuta na ngambo ya sude, mokili mobimba ya bato ya Kanana mpe Meara oyo ezalaki mokili ya bato ya Sidoni kino na Afeki, kino na bandelo ya bato ya Amori ;


Abimeleki alandaki Gali, mpe Gali akimaki liboso ya Abimeleki, mpe bato ebele penza bakufaki kino na ekotelo ya ekuke.


Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda na Afeki, mpe Isalaele atongaki molako pene ya etima ya mayi oyo ezali na Jizireyeli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ