Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 20:26 - Mokanda na Bomoi

26 Na mobu oyo elandaki, Beni-Adadi asangisaki mampinga na ye ya Siri mpe amataki na Afeki mpo na kobundisa Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 20:26
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mobu oyo elandaki, na tango oyo bakonzi bazalaka na momesano ya kokende na bitumba, Davidi atindaki Joabi elongo na basali na ye mpe mampinga nyonso ya Isalaele. Babomaki bato ya Amoni mpe bazingelaki Raba. Kasi Davidi atikalaki na Yelusalemi.


Sima na yango, mosakoli ayaki epai ya mokonzi ya Isalaele mpe alobaki : — Lendisa basoda na yo mpe tala nini okoki kosala, pamba te na mobu oyo ekoya, mokonzi ya Siri akoya kobundisa yo lisusu.


Osengeli mpe lisusu kobongisa mampinga lokola oyo owutaki kobungisa : mpunda mpo na mpunda, shar mpo na shar, mpo ete tokoka kobundisa Isalaele na etando. Solo, tokoleka bango na makasi. » Beni-Adadi ayokaki bango mpe asalaki bongo.


Basoda ya mpiko ya Siri oyo batikalaki, bakimaki na Afeki epai wapi mir ekweyelaki bato nkoto tuku mibale na sambo. Beni-Adadi akimaki na engumba mpe abombamaki na shambre ya kati penza.


Elize alobaki : — Fungola lininisa oyo ezali na ngambo ya este. Joasi afungolaki yango. Elize alobaki : — Beta ! Joasi abetaki. Elize alobaki : — Ezali likonga ya elonga ya Yawe, likonga ya elonga liboso ya bato ya Siri. Okosilisa bato ya Siri, na Afeki.


mpe wuta na ngambo ya sude, mokili mobimba ya bato ya Kanana mpe Meara oyo ezalaki mokili ya bato ya Sidoni kino na Afeki, kino na bandelo ya bato ya Amori ;


ya Uma, ya Afeki, ya Reobi. Bingumba nyonso ezalaki tuku mibale na mibale elongo na bamboka na yango ya mike-mike.


Bato ya libota ya Aseri babenganaki te bato ya Ako, ya Sidoni, ya Ayilabi, ya Akizibi, ya Eliba, ya Afiki mpe ya Reobi.


Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda na Afeki, mpe Isalaele atongaki molako pene ya etima ya mayi oyo ezali na Jizireyeli.


Mpe Samuele azalaki kokomisa maloba ya Yawe epai ya bato nyonso ya Isalaele. Na tango wana, bato ya Isalaele bakendeki kobundisa bato ya Filisitia. Bato ya Isalaele batongaki molako na bango na Ebeni-Ezeri, mpe bato ya Filisitia batongaki ya bango molako, na Afeki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ