Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 20:24 - Mokanda na Bomoi

24 Sala boye : longola bakonzi nyonso na bisika na bango mpe tia bakonzi mosusu ya basoda na bisika ya bato oyo ya liboso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 20:24
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, asangisaki mampinga na ye nyonso elongo na bakonzi tuku misato na mibale na bampunda mpe bashar ; akendeki kozingela Samari mpe abundisaki yango.


Babimaki na midi na tango Beni-Adadi elongo na bakonzi tuku misato na mibale, oyo bazalaki na ngambo na ye, bazalaki kolangwa masanga na bandako na bango ya kapo.


Na tango wana bakalaka ya mokonzi ya Siri bapesaki ye toli : « Banzambe na bango bazali banzambe ya bangomba. Yango wana balekaki biso na makasi, kasi soki tobundi na bango na bitando, tokoleka bango solo na makasi.


Osengeli mpe lisusu kobongisa mampinga lokola oyo owutaki kobungisa : mpunda mpo na mpunda, shar mpo na shar, mpo ete tokoka kobundisa Isalaele na etando. Solo, tokoleka bango na makasi. » Beni-Adadi ayokaki bango mpe asalaki bongo.


Nzokande, mokonzi ya Siri apesaki mitindo epai ya bakonzi na ye ya basoda, tuku misato na mibale, oyo batambolisaka bashar : « Bobundisa moto moko te, azala moke to monene ; kasi bobundisa kaka mokonzi ya Isalaele. »


Liboso na Yawe, bwanya moko te, mayele moko te mpe toli moko te ekoki kolonga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ