Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 20:23 - Mokanda na Bomoi

23 Na tango wana bakalaka ya mokonzi ya Siri bapesaki ye toli : « Banzambe na bango bazali banzambe ya bangomba. Yango wana balekaki biso na makasi, kasi soki tobundi na bango na bitando, tokoleka bango solo na makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 20:23
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Batongaki lisusu mpo na bango moko bisambelo ya likolo ya bangomba, mabanga ya bule, makonzi ya bule mpo na Ashera na likolo ya bangomba nyonso mpe na se ya banzete nyonso ya mobesu.


Sala boye : longola bakonzi nyonso na bisika na bango mpe tia bakonzi mosusu ya basoda na bisika ya bato oyo ya liboso.


Moto na Nzambe ayaki mpe alobaki na mokonzi ya Isalaele : — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Lokola bato ya Siri bakanisi ete Ngai nazali nzambe ya bangomba, kasi ya etando te, nakokaba mampinga monene oyo na maboko na yo mpe okoyeba ete Ngai nazali Yawe. »


Bakalaka na ye balobaki na ye : — Tala, toyokaki ete bakonzi ya Isalaele bazalaka malamu. Pesa nzela ete tokende epai ya mokonzi ya Isalaele, tolata bilamba ya saki na loketo na biso mpe basinga na mito na biso ; tango mosusu bakoki kobikisa bomoi na yo.


Tango batata na ngai babebisaki Gozani, Arani, Retsefi mpe bato ya Edeni oyo bazalaki kovanda kati na Telasari, boni, banzambe ya bikolo yango bakangolaki yango ?


Kati na banzambe ya mikili wana, nani azalaki na makoki ya kokangola mokili na ye na maboko na ngai ? Bongo ndenge nini Yawe akoka solo kokangola Yelusalemi na maboko na ngai ? »


Nazali Yawe ; yango nde Kombo na Ngai ; nakopesa nkembo na Ngai na mosusu te to lokumu na Ngai epai na banzambe ya bikeko te.


Oh Yawe, Makasi na ngai mpe Ndako na ngai batonga makasi, Ekimelo na ngai na tango ya pasi, bato ya bikolo nyonso bakoya epai na Yo wuta na basuka ya mokili mpe bakoloba : « Batata na biso bazalaki kaka na banzambe ya lokuta, banzambe ya pamba oyo etikalaki kosalela bango bolamu ata moko te.


Mawa na biso ! Nani akokangola biso na maboko ya Nzambe oyo ya nguya ? Ezali Nzambe wana nde abomaki bato ya Ejipito na nzela ya bitumbu ya ndenge na ndenge kati na esobe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ